Okovanda na etuka ya Gosheni mpe okozala pembeni na ngai : yo, bana na yo mpe bakitani na yo, bameme na yo, bantaba na yo, bangombe na yo mpe biloko nyonso oyo ozali na yango.
Kuna, nakokokisa baposa na yo nyonso, pamba te mibu mitano ya nzala makasi ezali koya ; soki te, yo elongo na bana na yo mpe bibwele na yo nyonso, bokokoma na pasi.
Jozefi akendeki mpe alobaki na Faraon : — Tata na ngai elongo na bandeko na ngai bayei wuta na mokili ya Kanana na bameme, bantaba, bangombe mpe biloko na bango nyonso ; bazali sik’oyo na Gosheni.
Kasi tango bokobuka mbuma, bokopesa eteni ya mitano epai ya Faraon. Biteni minei oyo mosusu, bokobomba yango lokola milona mpo na bilanga mpe lokola biloko ya kolia mpo na bino moko, mpo na mabota na bino mpe mpo na bana na bino.
Nkembo nyonso ya ndako ya tata na ye ekozala likolo na ye : kobanda na bakitani na ye kino na bana na bango nyonso, lokola bisalelo oyo : kobanda na bakopo ya mike kino na mbeki ya minene.
atako, lokola bantoma ya Klisto, tokokaki kosenga bino na makasi ete bosunga biso ; kasi tozalaki lokola bana mike kati na bino. Ndenge mama abatelaka bana na ye,
pamba te masano ya nzoto ezali na tina mpo na ndambo ya makambo, kasi botosi kati na makambo ya Nzambe ezali na tina mpo na nyonso, pamba te ezali na elaka ya bomoi mpo na tango oyo mpe mpo na tango oyo ezali koya.
Soki mwasi akufisa mobali azali na bana to bakoko, bana to bakoko yango basengeli, liboso na nyonso, koyekola kotalisa botosi na bango kati na makambo ya Nzambe na nzela ya kosunga libota na bango mpe kozongisa bolamu epai ya baboti mpe bakoko na bango, pamba te kosala bongo esepelisaka Nzambe.
Moto nyonso oyo asungaka bandeko na ye te, mingi-mingi bato ya libota na ye, asili kobwaka kondima mpe azali moto mabe koleka ata moto oyo azali mondimi te.
Akoyeisa bomoi na yo sika mpe akosunga yo na kimobange na yo, pamba te bokilo na yo, oyo alingaka yo mpe azali na motuya na miso na yo koleka bana mibali sambo, aboteli yo mwana mobali. »