Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Ebandeli 47:1 - Mokanda na Bomoi

1 Jozefi akendeki mpe alobaki na Faraon : — Tata na ngai elongo na bandeko na ngai bayei wuta na mokili ya Kanana na bameme, bantaba, bangombe mpe biloko na bango nyonso ; bazali sik’oyo na Gosheni.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Ebandeli 47:1
8 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Okovanda na etuka ya Gosheni mpe okozala pembeni na ngai : yo, bana na yo mpe bakitani na yo, bameme na yo, bantaba na yo, bangombe na yo mpe biloko nyonso oyo ozali na yango.


Tango sango ekomaki na ndako ya Faraon ete bandeko ya Jozefi bayei, Faraon elongo na bakambi na ye nyonso basepelaki.


Liboso ete Jakobi akutana na Jozefi, atindaki Yuda epai ya Jozefi mpo na kobongisa bokutani na bango na Gosheni. Tango bakomaki na Gosheni,


Jozefi alobaki na bandeko na ye mpe na libota ya tata na ye : — Nakokende koyebisa Faraon : « Bandeko na ngai mpe libota ya tata na ngai, ba-oyo bavandaka na mokili ya Kanana, bayei epai na ngai.


Bokozongisa : « Basali na yo babokolaka bibwele wuta bomwana na biso kino sik’oyo ndenge bakoko na biso bazalaki kosala. » Soki kaka bolobi bongo, akopesa bino nzela ya kovanda na Gosheni, pamba te bato ya Ejipito balingaka te babateli nyonso ya bibwele.


Kasi Moyize azongisaki : — Ekoki kosalema bongo te ; noki te mbeka oyo tokobonzela Yawe, Nzambe na biso, ekomonana lokola eloko ya nkele na miso ya bato ya Ejipito. Boni, soki tobonzi mbeka oyo emonani lokola eloko ya nkele na miso na bango, bakobamba biso mabanga te ?


Kasi enokaki te kati na etuka ya Gosheni epai wapi bana ya Isalaele bazalaki.


Pamba te Mobulisi ya basumuki mpe bato oyo babulisami bazali kaka na Tata moko. Yango wana Yesu azalaki na soni te ya kobenga bango bandeko na Ye,


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ