Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Ebandeli 45:8 - Mokanda na Bomoi

8 Ezali bino te bato botindaki ngai awa, kasi ezali nde Nzambe. Akomisaki ngai tata ya Faraon, nkolo ya ndako na ye mpe moyangeli ya mokili mobimba ya Ejipito.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Ebandeli 45:8
11 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Balobaki na ye : — Jozefi azali nanu na bomoi. Ye nde moto azali koyangela Ejipito mobimba. Jakobi ayokaki nzoto malili mpe andimelaki bango te.


Kasi sik’oyo, bomitungisa te mpe bozala na mawa te na ndenge botekaki ngai awa. Ezali mpo na kobikisa bomoi na bino nde Nzambe atindaki ngai liboso na bino.


nazalaki tata ya moto oyo akelela, nazalaki kobundela moto oyo nayebi te ;


Nakolatisa ye nzambala na yo, nakokanga ye mokaba na yo mpe nakopesa bokonzi na yo na maboko na ye. Akozala tata mpo na bavandi ya Yelusalemi mpe mpo na ndako ya Yuda.


Ezali bino te bato boponaki Ngai ! Ngai nde naponaki bino mpe napesaki bino mosala mpo ete bokende, bobota bambuma, bambuma oyo ekowumela ; mpe mpo ete Tata apesa bino nyonso oyo bokosenga Ye na Kombo na Ngai.


Yesu alobaki na ye : — Okokaki kozala na bokonzi moko te likolo na Ngai soki epesamelaki yo te wuta na likolo. Yango wana, moto oyo akabi Ngai na maboko na yo asali lisumu monene koleka.


Boye, yango ewuti te na posa to na makasi ya moto, kasi ewuti na Nzambe oyo asalaka ngolu.


Tango mosusu, mwa tango moke oyo bozalaki ya kokabwana na Onezime ezalaki mpo ete ozwa ye mpo na libela,


Mika alobaki na ye : — Vanda elongo na ngai. Okozala tata mpe nganga na ngai ; nakopesa yo na mobu moko mbongo ya bibende ya palata, zomi, bilamba ya kolata mpe biloko ya kolia. Molevi akomaki kosala epai ya Mika.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ