Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Ebandeli 45:7 - Mokanda na Bomoi

7 Kasi Nzambe atindaki ngai liboso na bino mpo ete bowumela na mokili mpe bobikisa bomoi na bino na nzela ya kokangolama monene.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Ebandeli 45:7
8 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Kasi sik’oyo, bomitungisa te mpe bozala na mawa te na ndenge botekaki ngai awa. Ezali mpo na kobikisa bomoi na bino nde Nzambe atindaki ngai liboso na bino.


Jozefi apesaki lisusu biloko ya kolia epai ya tata na ye, bandeko na ye mpe epai ya libota ya tata na ye mobimba kolanda motango ya bana na bango.


Bino bokanisaki kosala ngai mabe, kasi Nzambe abongolaki yango bolamu mpo na kokokisa, ndenge ezali kosalema sik’oyo, lobiko ya bomoi ya bato ebele.


Kasi basoda ya Eleazari babombamaki kati na elanga, babundelaki yango mpe babomaki bato ya Filisitia. Yawe apesaki bango elonga monene.


Yango wana, nakosanzola Yo, Yawe, kati na bikolo ; nakoyemba mpo na lokumu ya Kombo na Yo.


Pamba te ezalaki na mopanga na bango te nde babotolaki mokili, ezalaki mpe maboko na bango te nde ebikisaki bango ; kasi ezalaki nde loboko na Yo ya mobali, nguya na Yo mpe pole ya elongi na Yo, pamba te ozalaki kolinga bango.


Kaka Moyize oyo bandeko na ye baboyaki na koloba na ye : « Nani atie yo mokonzi mpe mosambisi, » ye nde Nzambe atindaki mpo ete azala mokonzi mpe mokangoli na bango, na lisungi ya anjelu oyo abimelaki ye na mwa nzete.


Lokola azalaki na posa makasi ya mayi, asambelaki Yawe : « Opesi mosali na Yo elonga oyo monene ; boni, nakufa sik’oyo na posa ya mayi mpe nakweya na maboko ya bato oyo bakatama ngenga te ? »


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ