Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Ebandeli 45:6 - Mokanda na Bomoi

6 Oyo ezali mobu ya mibale wuta nzala makasi ekotaki na mokili ; mpe na mibu mitano oyo ezali koya, bakolona te mpe bakobuka te.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Ebandeli 45:6
13 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Tala molongo ya libota ya Jakobi. Elenge mobali Jozefi azalaki na mibu zomi na sambo ya mbotama mpe azalaki kobatela bibwele. Azalaki kosala mosala yango elongo na bandeko na ye ya mibali, bana ya Bila mpe ya Zilipa, basi ya tata na ye. Jozefi azalaki koyebisa tata na bango makambo mabe ya bandeko na ye.


Boye, na se ya bokonzi ya Faraon, bakobanda kosangisa biloko nyonso ya kolia oyo mibu ya malamu ekobimisa, bakobomba ble na bingumba mpe bakobatela yango lokola biloko ya kolia mpo na bingumba.


Azalaki na mibu tuku misato ya mbotama tango akotaki na mosala ya Faraon, mokonzi ya Ejipito. Jozefi alongwaki na miso ya Faraon mpe atambolaki na mokili mobimba ya Ejipito.


Mibu sambo ya bofuluki oyo ezalaki na Ejipito ekomaki na suka,


mpe mibu sambo ya nzala makasi ebandaki, ndenge kaka Jozefi alobaki. Nzala makasi ekotaki na mikili nyonso, kasi na mokili mobimba ya Ejipito biloko ya kolia ezangaki te.


Tango nzala ekotaki na mokili mobimba ya Ejipito, Jozefi afungolaki ndako oyo batiaki biloko mpe atekaki ble epai ya bato ya Ejipito ; kasi nzala makasi ekobaki kaka.


Tango mibu wana esilaki, bayaki lisusu epai na ye na mibu oyo elandaki. Balobaki : — Tokoki kobombela nkolo na biso te ete mbongo na biso esili mpe bibwele na biso ekomi ya yo. Totikali lisusu na eloko moko te longola kaka banzoto na biso mpe mabele na biso.


Jozefi alobaki na bato : — Nasombi bino lelo mpo na Faraon, bino mpe mabele na bino. Tala milona mpo na bino mpo ete bokoka kolona mabele.


Bokosala mosala mikolo motoba, kasi na mokolo ya sambo, bosengeli kopema : ezala na tango ya kolona to na tango ya kobuka.


Bangombe mpe ba-ane oyo ebalolaka mabele ya bilanga ekolia matiti ya mungwa oyo baponi na pawu mpe na kiyungulu.


bakomema mwana ngombe yango ya mwasi na lubwaku oyo, kati na yango, basala nanu mosala ya bilanga te mpe balona nanu ata eloko moko te, na esika oyo mayi ezali kotiola. Ezali kuna nde bampaka bakobuka yango kingo.


Akotia bamoko, bakonzi ya bankoto ya basoda ; bamosusu, bakonzi ya basoda tuku mitano ; bamosusu, akotia bango na mosala ya kobalola mabele ya bilanga na ye, kobuka bambuma na ye mpe kosalela ye bibundeli ya bitumba mpe bisalelo mpo na bashar na ye.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ