Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Ebandeli 45:3 - Mokanda na Bomoi

3 Jozefi alobaki na bandeko na ye ya mibali : — Nazali Jozefi ! Tata na ngai azali nanu na bomoi ? Kasi bandeko na ye bakokaki koyanola ye te, pamba te bazalaki kolenga liboso na ye.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Ebandeli 45:3
14 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Sik’oyo, boya mpo ete toboma ye mpe tobwaka ye na moko kati na mabulu oyo. Tokoloba ete nyama mabe eliaki ye. Bongo tokotala oyo ekoya sima na bandoto na ye.


Balobanaki bango na bango : — Solo, tozwi etumbu mpo na makambo oyo tosalaki ndeko na biso ; pamba te tomonaki pasi na ye tango azalaki kobondela biso, kasi toyokaki ye te. Yango wana pasi oyo ekomeli biso.


Ribeni alobaki na bango : — Nayebisaki bino ete bosala mwana wana mabe te ? Kasi boyokelaki ngai te. Sik’oyo tosengeli kofuta makila na ye !


Atunaki bango : — Boni, bozali malamu ? Abakisaki : — Boni tata na bino ya mobange oyo boyebisaki ngai, azali malamu ?


Yango wana, liboso na Ye, nazali koyoka somo makasi ; mpe wana nazali kokanisa makambo oyo nyonso, nazali kobanga Ye.


Kasi awa sik’oyo pasi ekomeli yo, olembi na yo ! Awa pasi ebeti yo, okomi na yo koyoka somo !


Nakosopa Molimo ya ngolu mpe ya mabondeli epai ya libota ya Davidi mpe epai ya bavandi ya Yelusalemi. Bakosembola miso na bango epai na Ngai oyo batobolaki. Bakosalela ye matanga ndenge kaka basalaka matanga ya mwana oyo abotama kaka ye moko ; bakolela ye makasi ndenge balelaka mwana mobali ya liboso oyo asili kokufa.


Solo, bango nyonso bamonaki Ye, mpe somo makasi ekangaki bango. Mbala moko, Yesu alobaki na bango : « Kimia ! Kimia ! Bobanga te ! Ezali Ngai ! »


Tango Simona Petelo amonaki bongo, afukamaki na mabolongo ya Yesu mpe alobaki : — Nkolo, zala mosika na ngai, pamba te nazali moto ya masumu !


Na mbala ya mibale, Jozefi amilakisaki epai ya bandeko na ye, bongo Faraon ayaki koyeba libota ya Jozefi.


Saulo atunaki : — Nkolo, yo nani ? Mongongo ezongisaki : — Ngai, nazali Yesu oyo yo ozali konyokola.


« Botala, azali koya kati na mapata ! Miso nyonso ekomona Ye, ezala bato oyo batobolaki Ye mopanzi ; mpe bikolo nyonso ya mokili ekomilela-lela likolo na Ye. » Ekosalema penza bongo ! Amen.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ