Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Ebandeli 45:18 - Mokanda na Bomoi

18 Boyela ngai tata na bino mpe mabota na bino ; nakopesa bino mabele oyo eleki kitoko kati na Ejipito mpe bokolia biloko na yango oyo eleki kitoko. »

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Ebandeli 45:18
11 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Tika ete Nzambe apesa yo mvula ya likolo mpe mabele ya bozwi ; apesa yo mbuma ya ble mpe vino ebele penza !


Faraon alobaki na Jozefi : — Yebisa bandeko na yo : « Botia biloko likolo ya banyama na bino mpe bozonga na mokili ya Kanana.


Bokozongisa : « Basali na yo babokolaka bibwele wuta bomwana na biso kino sik’oyo ndenge bakoko na biso bazalaki kosala. » Soki kaka bolobi bongo, akopesa bino nzela ya kovanda na Gosheni, pamba te bato ya Ejipito balingaka te babateli nyonso ya bibwele.


mokili ya Ejipito mpe ezali na maboko na yo. Vandisa tata na yo mpe bandeko na yo na eteni ya mabele oyo eleki kitoko ; tika ete bavanda na Gosheni. Mpe soki oyebi kati na bango bato ya mayele, pesa bango mokumba ya kobatela bibwele na ngai.


Atiaka kimia na etuka na yo mpe atondisaka yo na farine.


Mpe bato oyo bayinaka Yawe balingaki komikitisa liboso na Ye, mpe etumbu na bango elingaki kowumela mpo na libela.


Mawa na motole ya lolendo ya balangwi masanga ya Efrayimi mpe na fololo ekawuka, fololo oyo ezalaki kosala kitoko na yango, oyo ezalaki na moto ya lubwaku ya mabele kitoko, na engumba wana oyo balangwi masanga ya vino bazalaki kosalela lolendo !


mpe fololo ekawuka oyo ezalaki kosala kitoko na yango na moto ya lubwaku ya kitoko ekokoma lokola mbuma ya figi ya liboso oyo ebotaka liboso ya eleko ya molunge : soki kaka moto amoni yango, akobuka mpe akomela yango mbala moko.


Napesi yo mafuta nyonso ya olive oyo eleki kitoko, vino ya sika mpe ble oyo bapesi epai na Yawe lokola mbuma ya liboso ya milona na bango.


Kati na makabo nyonso oyo bokozwa, bosengeli kopesa epai na Yawe eteni oyo eleki kitoko mpe eleki bule. ›


miliki ya bangombe mpe ya bameme ; apesaki bango mafuta ya bameme mpe ya bantaba, ya bana meme mpe ya ntaba ya mafuta ; mpe apesaki bameme ya mibali ya kitoko ya Bashani. Baliaki lisusu ble oyo eleki kitoko, bamelaki vino ya motane oyo ewutaki na bambuma ya vino.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ