10 Okovanda na etuka ya Gosheni mpe okozala pembeni na ngai : yo, bana na yo mpe bakitani na yo, bameme na yo, bantaba na yo, bangombe na yo mpe biloko nyonso oyo ozali na yango.
Bokozongisa : « Basali na yo babokolaka bibwele wuta bomwana na biso kino sik’oyo ndenge bakoko na biso bazalaki kosala. » Soki kaka bolobi bongo, akopesa bino nzela ya kovanda na Gosheni, pamba te bato ya Ejipito balingaka te babateli nyonso ya bibwele.
Jozefi akendeki mpe alobaki na Faraon : — Tata na ngai elongo na bandeko na ngai bayei wuta na mokili ya Kanana na bameme, bantaba, bangombe mpe biloko na bango nyonso ; bazali sik’oyo na Gosheni.
Balobaki lisusu na Faraon : — Toyei kovanda awa, pamba te nzala makasi ezali kati na mokili ya Kanana mpe matiti ezali lisusu te mpo na bibwele ya basali na yo ; yango wana, tobondeli yo, pesa basali na yo nzela ya kovanda na Gosheni.
mokili ya Ejipito mpe ezali na maboko na yo. Vandisa tata na yo mpe bandeko na yo na eteni ya mabele oyo eleki kitoko ; tika ete bavanda na Gosheni. Mpe soki oyebi kati na bango bato ya mayele, pesa bango mokumba ya kobatela bibwele na ngai.
Moyuda Maridoshe azalaki moto ya mibale kati na bokonzi sima na mokonzi Kizerisesi. Maridoshe azalaki moto monene mpe ya lokumu na miso ya Bayuda, bandeko na ye ; pamba te azalaki koluka bolamu ya bato na ye mpe kobundela bolamu ya Bayuda nyonso.
Kasi Moyize azongisaki : — Ekoki kosalema bongo te ; noki te mbeka oyo tokobonzela Yawe, Nzambe na biso, ekomonana lokola eloko ya nkele na miso ya bato ya Ejipito. Boni, soki tobonzi mbeka oyo emonani lokola eloko ya nkele na miso na bango, bakobamba biso mabanga te ?