Ebandeli 45:1 - Mokanda na Bomoi1 Jozefi akokaki lisusu komikanga te liboso ya bato nyonso oyo bazalaki liboso na ye, agangaki : « Bobimisa bato nyonso ! » Boye, moto moko te azalaki pembeni na ye tango amimonisaki epai ya bandeko na ye ya mibali. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Nakosopa Molimo ya ngolu mpe ya mabondeli epai ya libota ya Davidi mpe epai ya bavandi ya Yelusalemi. Bakosembola miso na bango epai na Ngai oyo batobolaki. Bakosalela ye matanga ndenge kaka basalaka matanga ya mwana oyo abotama kaka ye moko ; bakolela ye makasi ndenge balelaka mwana mobali ya liboso oyo asili kokufa.