Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Ebandeli 43:9 - Mokanda na Bomoi

9 Nandimi kobatela ye ; boye okotuna ye na maboko na ngai. Soki nazongiseli yo ye te mpe namemi ye liboso na yo te, tika ete nazala na ngambo epai na yo bomoi na ngai mobimba.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Ebandeli 43:9
16 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Namemelaki yo nyama moko te oyo banyama ya zamba ebomaki. Ngai moko nazalaki kofuta yango. Ozalaki kofutisa ngai oyo bazalaki koyiba ngai na moyi to na butu.


Ribeni alobaki na tata na ye : — Pesa ngai Benjame, mpe nakomemela yo ye. Soki namemeli yo ye te, boma bana na ngai mibale ya mibali.


Soki towumelaki te, tokokaki kozonga mbala ya mibale.


Bongo lokola makila na bino ezali bomoi na bino, nakosambisa oyo nyonso akotangisa yango, ezala nyama to moto. Nakosambisa moto nyonso mpo na bomoi ya moninga na ye.


Kasi mwasi ya mboka Tekoa alobaki na mokonzi : — Oh mokonzi, nkolo na ngai, tika ete ngambo ekweya na moto na ngai mpe na libota ya tata na ngai ; kasi tika ete mokonzi mpe kiti na ye ya bokonzi bazala mosika ya likambo oyo.


Soki te, tango mokonzi, nkolo na ngai, akolala elongo na bakoko na ye, bakozwa ngai elongo na Salomo, mwana na ngai ya mobali, lokola babomi.


Oh Nzambe, mipesa ata Yo moko lokola ndanga, na esika na ngai, epai na Yo ; soki te, nani mosusu akoki komipesa lokola ndanga mpo na ngai !


Kamata mokumba ya bolamu na ngai, mosali na Yo ; tika ete bato ya lolendo banyokola ngai te.


Soki Ngai nalobi na moto mabe : ‹ Solo, okokufa, › kasi yo okebisi ye te to oyebisi ye te ete atika nzela na ye ya mabe mpo ete abikisa bomoi na ye, moto wana ya mabe akokufa solo mpo na masumu na ye, kasi nakotanga makila na ye na moto na yo.


Soki moto ya sembo atiki kosalela bosembo na ye mpe akomi kosala mabe, nakotia libaku liboso na ye, mpe moto yango akokufa, solo. Soki okebisaki ye te, akokufa penza mpo na masumu na ye, mpe bakotikala kokanisa lisusu te bolamu nyonso oyo ye asilaki kosala ; kasi nakotanga makila na ye na moto na yo.


Nzokande, soki mokengeli amoni banguna koya mpe abeti kelelo te mpo na kokebisa bato, bongo mopanga ebomi moko kati na bandeko na ye, ndeko wana akokufa solo mpo na masumu na ye, kasi nakotanga makila na ye na moto ya mokengeli. ›


Soki nalobi na moto mabe : ‹ Oh moto mabe, okokufa solo ! › Mpe yo, olobi na ye eloko moko te mpo ete abongola bizaleli na ye, moto mabe wana akokufa solo mpo na masumu na ye ; kasi nakotanga makila na ye na moto na yo.


Mpo na yango, makila ya basakoli nyonso, oyo basopa wuta na ebandeli ya mokili, ekotangama na mito ya bato ya ekeke oyo,


Ezali na nzela ya seleka yango nde Yesu akoma ndanga ya boyokani oyo eleki motuya.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ