Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Ebandeli 43:7 - Mokanda na Bomoi

7 Bazongisaki : — Moto yango atunaki biso malamu makambo oyo etali biso moko mpe libota na biso. Atunaki biso : « Tata na bino azali nanu na bomoi ? Bozali na ndeko mosusu ya mobali ? » Mpe biso topesaki eyano na mituna na ye. Tokokaki te koyeba ete akoloba na biso : « Boya na ndeko na bino ya mobali awa. »

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Ebandeli 43:7
6 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Tozali biso nyonso bana ya moto moko. Basali na yo bazali bato ya sembo, kasi bazali banongi te.


Kasi bango bazongisaki : — Basali na yo bazalaki bandeko mibali zomi na mibale ; tozali bana ya moto moko oyo azali kovanda na mokili ya Kanana. Mwana ya suka azali sik’oyo elongo na tata na biso, mpe mosusu azalaka lisusu te.


Atunaki bango : — Boni, bozali malamu ? Abakisaki : — Boni tata na bino ya mobange oyo boyebisaki ngai, azali malamu ?


Yuda azongisaki : — Moto wana alobaki na biso ete tozonga kuna te soki ndeko na biso azali elongo na biso te.


Isalaele azongisaki : — Mpo na nini bosali ngai mabe boye ? Mpo na nini boyebisaki moto wana ete bozali na ndeko mosusu ?


Nkolo na ngai atunaki basali na ye : « Bozali na tata to na ndeko mosusu ya mobali ? »


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ