Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Ebandeli 43:5 - Mokanda na Bomoi

5 Kasi soki otiki ye te, biso mpe tokokende te ; pamba te moto wana ayebisaki biso malamu : « Bokotelema liboso na ngai te soki ndeko na bino azali te. »

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Ebandeli 43:5
10 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Tala ndenge nakomeka bino : Na kombo ya Faraon, bokolongwa na esika oyo te soki leki na bino ya suka akomi awa te !


Kasi bomemela ngai leki na bino ya suka. Yango ekolakisa ete bolobaki solo mpe bokokufa te. Basalaki bongo.


Jakobi azongisaki : — Te ! Mwana na ngai akokende elongo na bino te. Ndeko na ye ya mobali akufa ; natikala kaka na ye. Soki likama ekweyeli ye na mobembo oyo bozali kokende, wana bokoboma ngai na pasi, na kimobange na ngai !


Yuda azongisaki : — Moto wana alobaki na biso ete tozonga kuna te soki ndeko na biso azali elongo na biso te.


Soki otiki ndeko na biso kokende elongo na biso, wana tokokende na Ejipito mpe tokosombela yo biloko.


Isalaele azongisaki : — Mpo na nini bosali ngai mabe boye ? Mpo na nini boyebisaki moto wana ete bozali na ndeko mosusu ?


Kasi olobaki na basali na yo : « Soki leki na bino ya mobali ayei elongo na bino te, bokomona lisusu elongi na ngai te. »


Bongo tata na biso alobaki : « Bozonga mpe bosomba ndambo ya biloko ya kolia. »


Kasi tozongisaki : « Tokoki kokende te. Tokokende kaka soki leki na biso ya mobali azali elongo na biso. Tokoki komona elongi ya moto wana te soki leki na biso ya mobali azali elongo na biso te. »


Okopesaka tata na yo mpe mama na yo lokumu mpo ete ozala na bomoi ya molayi kati na mokili oyo Yawe, Nzambe na yo, azali kopesa yo.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ