Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Ebandeli 43:3 - Mokanda na Bomoi

3 Yuda azongisaki : — Moto wana alobaki na biso ete tozonga kuna te soki ndeko na biso azali elongo na biso te.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Ebandeli 43:3
13 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Tango libota ya Jakobi baliaki biloko nyonso oyo bamemaki wuta na Ejipito, Jakobi alobaki na bana na ye : — Bozonga kuna kosomba ndambo ya biloko.


Soki otiki ndeko na biso kokende elongo na biso, wana tokokende na Ejipito mpe tokosombela yo biloko.


Kasi soki otiki ye te, biso mpe tokokende te ; pamba te moto wana ayebisaki biso malamu : « Bokotelema liboso na ngai te soki ndeko na bino azali te. »


Kasi olobaki na basali na yo : « Soki leki na bino ya mobali ayei elongo na bino te, bokomona lisusu elongi na ngai te. »


Kasi mokonzi alobaki : — Asengeli kokende na ndako na ye ; asengeli te komona elongi na ngai. Boye Abisalomi akendeki na ndako na ye, mpe amonaki elongi ya mokonzi te.


Abisalomi avandaki na Yelusalemi mibu mibale mpe atikalaki komona te elongi ya mokonzi.


Abisalomi azongiselaki Joabi : — Tala, natindelaki yo maloba ; nalobaki : « Yaka awa mpo ete natinda yo epai ya mokonzi mpo na kotuna ye : ‹ Mpo na nini nalongwaki na Geshuri ? Elingaki kozala malamu mpo na ngai soki natikalaki na ngai kuna. Sik’oyo, nalingi komona elongi ya mokonzi ; mpe soki namemaki ngambo na likambo moko, tika ete baboma ngai ! › »


Davidi azongisaki : — Malamu ! Nandimi kosala boyokani elongo na yo, kasi nasengi yo eloko moko : koya liboso na ngai te soki otindeli ngai nanu te Mikali, mwana mwasi ya Saulo, tango okoya kokutana na ngai.


Mpe sik’oyo, nayebi ete bokomona elongi ngai lisusu te, bino nyonso oyo nalekaki kati na bino mpo na koteya sango ya Bokonzi ya Nzambe.


bayokaki mawa mingi koleka mpo alobaki na bango ete bakomona elongi na ye lisusu te. Bongo bakendeki kotika ye kino na masuwa.


Namoni minyoko ya bato na Ngai kati na Ejipito. Nayoki kolela na bango mpe nakiti mpo na kokangola bango. Mpe yaka sik’oyo, nakotinda yo ete ozonga na Ejipito. »


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ