2 Tango libota ya Jakobi baliaki biloko nyonso oyo bamemaki wuta na Ejipito, Jakobi alobaki na bana na ye : — Bozonga kuna kosomba ndambo ya biloko.
Nzala makasi ekotaki kati na mokili.
— Limbisa biso, nkolo na ngai ! Toyaki mbala ya liboso mpo na kosomba biloko ya kolia ;
Yuda azongisaki : — Moto wana alobaki na biso ete tozonga kuna te soki ndeko na biso azali elongo na biso te.
Soki otiki ndeko na biso kokende elongo na biso, wana tokokende na Ejipito mpe tokosombela yo biloko.
Bongo tata na biso alobaki : « Bozonga mpe bosomba ndambo ya biloko ya kolia. »
Kozala na eloko moko kati na kotosa Yawe ezali malamu koleka kozala na bomengo mingi kati na komitungisa.
Lolendo eyaka liboso ya kobebisama, mpe komimatisa eyaka liboso ya kokweyisama.
Soki asepeli na elanga, asombaka yango ; mpe na mbuma ya misala na ye, alonaka elanga ya vino.
Moto nyonso oyo asungaka bandeko na ye te, mingi-mingi bato ya libota na ye, asili kobwaka kondima mpe azali moto mabe koleka ata moto oyo azali mondimi te.