Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Ebandeli 42:9 - Mokanda na Bomoi

9 Bongo Jozefi akanisaki ndoto oyo alotaki na tina na bango mpe alobaki na bango : — Bino bozali penza banongi ! Boyei nde kotala bisika nini mokili na biso ebatelami malamu te !

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Ebandeli 42:9
15 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Bandeko na ye ya mibali bakomaki na motema likunya epai na ye, kasi tata na ye abombaki kaka likambo yango na motema.


Botinda moko kati na bino ete akende kozwa ndeko na bino ya mobali ; mpe bino oyo bokotikala, bokozala na boloko mpo na komeka maloba na bino mpe kotala soki bolobi solo. Soki te, na kombo ya Faraon, bozali banongi !


Boyela ngai leki na bino ya suka. Na bongo, nakoyeba ete bozali banongi te, kasi bato ya sembo ; mpe ngai nakozongisela bino ndeko na bino, sima nakotika bino mpo ete bokoka kosala mombongo na mokili. › »


bakambi ya bato ya Amoni balobaki na Anuni, mokonzi na bango : « Okanisi ete ezali mpo na kopesa tata na yo lokumu nde Davidi atindi bato mpo na kobondisa yo ? Ezali mpo na kononga engumba mpe kobebisa yango nde Davidi atindi bango epai na yo ? »


Yawe apesaki bato etumbu likolo ya ekeko ya mwana ngombe oyo balobaki na Aron ete asala.


« Tinda bato mpo na kononga mokili ya Kanana oyo nalingi kopesa na bana ya Isalaele. Kati na libota moko na moko, pona mpe tinda moto moko kati na bakambi. »


Kobanda na tango wana, bakomaki kolandela Yesu, mpe batindaki banongi oyo bazalaki komilakisa lokola bato ya sembo, mpo na kokanga Ye na maloba na Ye mpe kokaba Ye na maboko ya basambisi mpe ya moyangeli.


Mpo na kondima, Raabi, mwasi ya ndumba, akufaki te elongo na bato oyo bazalaki kotosa Nzambe te, pamba te ayambaki banongi na boboto.


Wuta na Shitimi, Jozue, mwana mobali ya Nuni, atindaki na nkuku banongi mibale ; alobaki na bango : — Bokende kononga mokili, mingi-mingi Jeriko. Boye, bakendeki mpe bakotaki na ndako ya mwasi moko ya ndumba, Raabi, mpe bavandaki kuna.


Boye, bilenge mibali oyo bakendeki kononga mokili bakotaki mpe babimisaki Raabi, tata na ye, mama na ye, bandeko na ye ya mibali mpe biloko na ye nyonso. Babimisaki libota na ye mobimba na libanda mpe batiaki bango libanda ya molako ya Isalaele.


banongi bamonaki moto moko kobima na engumba mpe balobaki na ye : « Lakisa biso esika nini tokoki kokotela na kati ya engumba, mpe tokosalela yo bolamu. »


Davidi atindaki banongi mpe, na nzela na bango, ayokaki ete Saulo akomi penza.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ