Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Ebandeli 42:34 - Mokanda na Bomoi

34 Boyela ngai leki na bino ya suka. Na bongo, nakoyeba ete bozali banongi te, kasi bato ya sembo ; mpe ngai nakozongisela bino ndeko na bino, sima nakotika bino mpo ete bokoka kosala mombongo na mokili. › »

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Ebandeli 42:34
7 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Abimeleki alobaki : « Mboka na ngai ezali liboso na yo, vanda na esika oyo olingi. »


bokovanda elongo na biso. Mboka ezali liboso na bino, bovanda, bosala mombongo mpe bokoma bankolo mabele. »


« Bato oyo bazali na boboto epai na biso ; tika ete bavanda elongo na biso mpe basala mombongo, mpo ete mboka ezali na yango monene ! Tokoki na biso kobala bana na bango ya basi, mpe bango bakoki na bango kobala bana na biso ya basi.


Tala ndenge nakomeka bino : Na kombo ya Faraon, bokolongwa na esika oyo te soki leki na bino ya suka akomi awa te !


Kasi bomemela ngai leki na bino ya suka. Yango ekolakisa ete bolobaki solo mpe bokokufa te. Basalaki bongo.


mbongo ya mpako ya bato ya mombongo oyo bazalaki koteka biloko oyo bazalaki kosomba na bamboka ya bapaya, mbongo ya mpako ya bateki biloko ya ndenge na ndenge, mbongo ya mpako oyo bakonzi nyonso ya Arabi bazalaki kofuta, mpe oyo bayangeli ya bituka bazalaki kokongola kati na mokili ya Isalaele.


ebukaki etape moko ya moke oyo ezalaki na songe ya nzete yango mpe ememaki yango na mokili ya bato ya mombongo, epai wapi elonaki yango kati na engumba ya bateki.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ