Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Ebandeli 42:2 - Mokanda na Bomoi

2 Nayoki ete ble ezali na Ejipito. Bokende kuna mpe bosomba ndambo mpo na biso mpo ete towumela na bomoi mpe tokufa te na nzala. »

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Ebandeli 42:2
11 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Bandeko mibali zomi ya Jozefi bakendeki na Ejipito mpo na kosomba ble.


Tango libota ya Jakobi baliaki biloko nyonso oyo bamemaki wuta na Ejipito, Jakobi alobaki na bana na ye : — Bozonga kuna kosomba ndambo ya biloko.


Soki otiki ndeko na biso kokende elongo na biso, wana tokokende na Ejipito mpe tokosombela yo biloko.


Yuda ayebisaki tata na ye Isalaele : — Tata, tika Benjame akende elongo na ngai. Tokotelema mpe tokokende mpo ete biso elongo na yo mpe bana na biso, tozala na bomoi, kasi tokufa te na nzala.


Bozonga noki epai ya tata na ngai mpe boloba na ye : « Mwana na yo, Jozefi, alobi : ‹ Nzambe akomisa ngai nkolo ya Ejipito mobimba ; yaka epai na ngai, kowumela te.


Nakokufa te, nakozala na bomoi mpe nakopanza sango ya misala ya Yawe.


Nzokande Yawe atalaka bato oyo batosaka Ye, ba-oyo batiaka elikya na bolingo kati na Ye,


mpo na kokangola bango na kufa mpe kobatela bango na bomoi ata na tango ya nzala makasi.


Na tango wana, Ezekiasi abelaki bokono moko ya makasi, pene akufa. Mosakoli Ezayi, mwana mobali ya Amotsi, akendeki epai na ye mpe alobaki : « Tala liloba oyo Yawe alobi : Bongisa makambo ya ndako na yo, pamba te okokufa, okobika te. »


Yesu azongisaki : — Ekomama : « Moto akobika na lipa kaka te, kasi mpe na maloba nyonso oyo ebimaka na monoko ya Nzambe. »


Tango Jakobi ayokaki ete ble ezali na Ejipito, atindaki bakoko na biso mbala ya liboso.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ