Ebandeli 42:13 - Mokanda na Bomoi13 Kasi bango bazongisaki : — Basali na yo bazalaki bandeko mibali zomi na mibale ; tozali bana ya moto moko oyo azali kovanda na mokili ya Kanana. Mwana ya suka azali sik’oyo elongo na tata na biso, mpe mosusu azalaka lisusu te. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Bazongisaki : — Moto yango atunaki biso malamu makambo oyo etali biso moko mpe libota na biso. Atunaki biso : « Tata na bino azali nanu na bomoi ? Bozali na ndeko mosusu ya mobali ? » Mpe biso topesaki eyano na mituna na ye. Tokokaki te koyeba ete akoloba na biso : « Boya na ndeko na bino ya mobali awa. »