12 Alobaki na bango : — Te ! Boyei na mokili na biso mpo na kotala bisika oyo ebatelami malamu te !
Tozali biso nyonso bana ya moto moko. Basali na yo bazali bato ya sembo, kasi bazali banongi te.
Kasi bango bazongisaki : — Basali na yo bazalaki bandeko mibali zomi na mibale ; tozali bana ya moto moko oyo azali kovanda na mokili ya Kanana. Mwana ya suka azali sik’oyo elongo na tata na biso, mpe mosusu azalaka lisusu te.
Tala ndenge nakomeka bino : Na kombo ya Faraon, bokolongwa na esika oyo te soki leki na bino ya suka akomi awa te !
Nzokande oyebi malamu Abineri, mwana mobali ya Neri ! Soki ayaki epai na yo, ezalaki nde mpo na kokosa yo, mpo na kononga mpe koluka koyeba bisika nyonso oyo otambolaka mpe makambo nyonso oyo osalaka.