Tika ete bikolo esalela yo, bato bafukamela yo ! Zala mokonzi ya bandeko na yo ya mibali, mpe tika ete bana mibali ya mama na yo bafukama liboso na yo ! Tika ete moto oyo akolakela yo mabe alakelama mabe ; tika ete moto oyo akopambola yo apambolama ! »
Izaki azongiselaki Ezawu : — Tala, nakomisi ye nkolo na yo mpe napesi ye bandeko na ye nyonso lokola basali ; napesi ye ble mpe vino. Mwana na ngai, nasala lisusu nini mpo na yo ?
Bandeko na ye ya mibali balobaki na ye : — Okanisi ete okokoma mokonzi na biso mpe okokonza biso ? Bongo bayinaki ye lisusu koleka likolo ya ndoto na ye mpe likolo ya makambo oyo alobaki.
Wana Abidiasi azalaki kokende, Eliya akutanaki na ye. Abidiasi asosolaki ete ezali ye, afukamaki elongi kino na se mpe alobaki : — Boni, ezali penza yo, Eliya, nkolo na ngai ?
Saulo asosolaki ete ezali mongongo ya Davidi mpe alobaki : — Oyo wana ezali mongongo na yo Davidi, mwana na ngai. Davidi azongisaki : — Solo, ezali mongongo na ngai, oh mokonzi, nkolo na ngai.