Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Ebandeli 41:49 - Mokanda na Bomoi

49 Jozefi abombaki ble ebele lokola zelo ya ebale monene, ezalaki mingi koleka ; yango wana bakataki kotanga, pamba te bakokaki kotanga yango lisusu te.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Ebandeli 41:49
9 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

nakopambola yo solo mpe nakokomisa bakitani na yo ebele lokola minzoto ya likolo, mpe ebele lokola zelo ya ebale. Bakitani na yo bakokamata bingumba ya banguna na bango.


Jozefi asangisaki biloko nyonso ya kolia oyo ebotaki na mibu yango sambo ya bofuluki kati na Ejipito mpe abombaki yango kati na engumba. Na engumba moko na moko, atiaki biloko ya kolia oyo ewutaki na bilanga oyo ezalaki zingazinga na yango.


Liboso ete mibu ya nzala makasi eya, Asinati, mwana mwasi ya Poti-Fera, nganga-nzambe ya Oni, abotelaki Jozefi bana mibali mibale.


mpe azalaki na etonga ya bameme nkoto sambo, bashamo nkoto misato, bangombe nkoto moko, ba-ane nkama mitano, mpe azalaki na basali ebele penza. Alekaki bato nyonso ya Este na lokumu.


Anokiselaki bango misuni lokola putulu, bandeke ebele lokola zelo ya ebale monene ;


Ndenge kaka bakoki kotanga te mampinga ya likolo mpe zelo ya bibale minene mpo na koyeba motango na yango, ndenge wana mpe nakokomisa ebele, bakitani ya Davidi, mosali na Ngai, mpe Balevi oyo basalelaka Ngai. › »


Bazalaki komata ebele lokola mabanki elongo na bibwele na bango mpe bandako na bango ya kapo. Ezalaki pasi mpo na kotanga motango ya bato mpe ya bashamo na bango ; bazalaki kokota na mokili ya Isalaele mpo na kobebisa yango nyonso.


Bato ya Madiani, ya Amaleki mpe ya ngambo ya este bazalaki ya kopanzana kati na lubwaku, ebele lokola mabanki. Bashamo na bango ezalaki ebele koleka zelo ya ebale.


Bato ya Filisitia basanganaki mpo na kobundisa bato ya Isalaele ; bazalaki na bashar nkoto tuku misato ; basoda oyo babundaka likolo ya bampunda, nkoto motoba ; mpe basoda oyo motango na bango ezalaki ebele lokola zelo ya ebale monene. Bayaki mpe batongaki molako na bango, na Mikimasi, na ngambo ya este ya Beti-Aveni.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ