Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Ebandeli 41:39 - Mokanda na Bomoi

39 Faraon alobaki na Jozefi : — Lokola Nzambe ayebisi yo makambo oyo nyonso, ezali na moto moko te oyo azali na mayele mpe na bwanya lokola yo.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Ebandeli 41:39
9 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Jozefi azongiselaki Faraon : — Ngai nakolonga te kosala yango, kasi Nzambe akopesa na Faraon eyano oyo azali na yango posa.


Jozefi alobaki na Faraon : — Ndoto ya Faraon ezali kaka ndoto moko mpe ezali kaka na ndimbola moko. Nzambe amonisaki Faraon makambo oyo Ye akosala.


Tala maloba oyo nazalaki na yango mpo na koyebisa Faraon. Nzambe atalisi na Faraon makambo oyo Ye akosala.


Tika sik’oyo Faraon aluka moto moko ya mayele mpe ya bwanya, atia ye na moto ya mokili ya Ejipito.


Bongo yo, Esidrasi, kolanda bwanya ya Nzambe na yo, oyo ozali na yango, pona bilombe mpe basambisi mpo na mosala ya kokata makambo ya bato nyonso oyo, kati na etuka ya ngambo ya weste ya ebale Efrate, bayebi mibeko ya Nzambe na yo ; mpe lakisa yango na bato oyo bayebi yango te.


Bwanya epesaka moto lokumu, kasi motema mabe ememaka kotiolama.


Bakambi ya Tsoani bakomi penza lokola bazoba, bato ya bwanya ya Faraon bakomi kopesa batoli oyo ezanga tina. Ndenge nini bokoki penza koloba na Faraon : « Ngai, nazali moko kati na bato ya bwanya, moyekoli ya bakonzi ya kala ? »


Makambo oyo mokonzi azali kosenga ezali pasi makasi, moto moko te akoki koyebisa mokonzi ndoto na ye ; ezali kaka banzambe nde bakoki kosala yango mpo ete bavandaka kati na bato te.


Sima, mokonzi atombolaki Daniele na lokumu oyo eleki likolo mpe apesaki ye bakado mpe bozwi ebele ; akomisaki ye moyangeli ya etuka mobimba ya Babiloni mpe mokambi ya bato na yango nyonso ya bwanya.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ