Ebandeli 41:30 - Mokanda na Bomoi30 Kasi mibu sambo ya nzala makasi ekolanda yango ; boye bakobosana bofuluki nyonso ya mokili ya Ejipito mpo ete nzala makasi yango ekokawusa mokili. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Gadi akendeki koyebisa Davidi makambo oyo Yawe alobaki na ye : — Oponi etumbu nini mpo ete Ngai Yawe nakokisa yango mpo na yo : mibu sambo ya nzala makasi kati na mokili na yo ; sanza misato oyo okokima liboso ya banguna na yo, oyo bakolanda yo ; to mikolo misato ya bokono oyo ebomaka kati na mokili na yo ? Kanisa sik’oyo malamu mpe yebisa ngai eyano oyo ngai nasengeli komema epai na Ye oyo atindi ngai.