Ebandeli 41:25 - Mokanda na Bomoi25 Jozefi alobaki na Faraon : — Ndoto ya Faraon ezali kaka ndoto moko mpe ezali kaka na ndimbola moko. Nzambe amonisaki Faraon makambo oyo Ye akosala. အခန်းကိုကြည့်ပါ။ |
Tika ete bikolo nyonso esangana elongo mpe bato basangana esika moko ! Nani kati na bango asakolaki makambo oyo ? Nani kati na bango ayebisaki biso makambo oyo esalemaki liboso ? Tika ete babimisa batatoli na bango mpo na kolobela bango ! Tika ete bato mosusu bayoka mpo ete baloba : « Ezali ya solo ! »
Yango nde ndimbola ya emoniseli ya libanga oyo omonaki kokweya yango moko wuta na ngomba, oyo loboko ya moto moko te ebwakaki, mpo na koya kopanza ebende, bronze, mabele oyo basalelaka bikeko, palata mpe wolo. Nzambe Monene alakisi mokonzi makambo oyo ekosalema na mikolo ekoya. Ndoto oyo ezali penza kolakisa makambo ya solo, mpe ndimbola na yango ezali ebongi na kondima.