24 Mito sambo ya ble oyo ekonda emelaki mito sambo ya ble oyo ya malamu. Nayebisaki yango epai ya bato ya soloka kasi ata moto moko te akokaki kolimbolela ngai yango.
Na tongo, lokola molimo na ye etungisamaki, abengaki bato nyonso ya soloka mpe ya bwanya ya Ejipito. Faraon ayebisaki bango ndoto na ye, kasi ata moto moko te akokaki kolimbolela ye yango.
Soki bato balobi na bino : « Bokende kotalisa makambo epai ya bato oyo basololaka na milimo ya bakufi mpe epai ya bato oyo balobaka makambo oyo ekoya, oyo balobaka-lobaka lokola bandeke. Boni, bato baluka banzambe na bango te ? Mpo na nini te babelela bakufi mpo na bato ya bomoi ? »
Tala bimoniseli oyo namonaki tango nazalaki ya kolala na mbeto na ngai : « Nazalaki kotala, namonaki nzete moko ya monene etelema liboso na ngai, na kati-kati ya mabele, mpe ezalaki molayi makasi penza.