Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Ebandeli 41:15 - Mokanda na Bomoi

15 Faraon alobaki na Jozefi : — Nalotaki ndoto mpe ata moto moko te alongi kolimbola yango ; kasi nayoki sango na tina na yo ete soki oyoki ndoto, okolimbola yango.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Ebandeli 41:15
11 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Bazongiselaki ye : — Biso mibale toloti bandoto ; kasi moto ya kolimbola yango mpo na biso azali te. Jozefi alobaki na bango : — Boyebi te ete Nzambe nde apesaka ndimbola ya bandoto ? Nabondeli bino, boyebisa ngai bandoto na bino.


Na tongo, lokola molimo na ye etungisamaki, abengaki bato nyonso ya soloka mpe ya bwanya ya Ejipito. Faraon ayebisaki bango ndoto na ye, kasi ata moto moko te akokaki kolimbolela ye yango.


Oziasi akangamaki na Nzambe mikolo nyonso ya bomoi ya Zakari, pamba te azalaki kolakisa ye kotosa Nzambe. Na tango nyonso oyo Oziasi awumelaki kokangama na Yawe, Nzambe azalaki kolongisa ye.


Yawe ayebisaka mabongisi na Ye epai ya bato oyo batosaka Ye, alakisaka bango mabombami ya boyokani na Ye.


mpe mokonzi ayebisaki bango : — Nalotaki ndoto moko oyo ezali kotungisa molimo na ngai makasi ; nazali na posa ya koyeba ndimbola na yango.


Nzete oyo omonaki, oyo ezalaki na makasa ya kitoko mpe bambuma ebele, oyo ezalaki kopesa bato nyonso bilei, oyo ezalaki kopesa pio na banyama ya zamba, oyo ezalaki kotikela bandeke ya likolo esika ya kotonga bazala na yango ;


ezalaki na makasa kitoko mpe na bambuma ebele, mpe ezalaki kopesa bilei na moto nyonso. Banyama ya zamba ezalaki koya kozwa pio na se ya elili na yango ; bandeke ya likolo ezalaki kovanda na bitape na yango : ezalaki kopesa bilei na bikelamu nyonso ya bomoi.


Pamba te moto yango, Daniele, oyo tata na yo azalaki kobenga Belitsatsari, atondisama na mayele, na boyebi mpe na bososoli ; azali lisusu na makoki ya kolimbola ndoto, masese mpe ya kopesa biyano na makambo ya makasi. Benga kaka Daniele wana, mpe akoyebisa yo ndimbola ya makomi yango.


Nayoki na tina na yo ete ozali na molimo ya banzambe kati na yo, mpe ete ozali na bososoli, na mayele mpe na bwanya ya kokamwa !


Nzokande, nayoki ete yo ozali na makoki ya kolimbola mpe ya kopesa biyano na makambo ya makasi ; sik’oyo, soki olongi kotanga makomi oyo mpe opesi ngai ndimbola na yango, nakolatisa yo bilamba ya motane mpe sheneti ya wolo na kingo, mpe okokoma moto ya misato kati na molongo ya bayangeli ya mokili na ngai ya bokonzi.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ