Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Ebandeli 40:3 - Mokanda na Bomoi

3 Abwakaki bango na boloko kati na ndako ya mokonzi ya bakengeli ya mokonzi, boloko epai wapi Jozefi azalaki.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Ebandeli 40:3
6 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Sima, bamemaki Jozefi na Ejipito. Potifari, kalaka ya lokumu ya Faraon mpe mokonzi ya bakengeli ya mokonzi, moto ya Ejipito, asombaki ye na maboko ya bato ya Isimaeli oyo bamemaki ye kuna.


Potifari akangaki Jozefi mpe abwakaki ye na boloko epai wapi mokonzi Faraon atiaka bakangami. Kasi, wana Jozefi azalaki kati na boloko,


Mokonzi ya boloko apesaki Jozefi mokumba ya kokengela bato nyonso ya boloko mpe ya kotambolisa makambo nyonso oyo ezalaki kosalema kuna.


Mokonzi ya boloko azalaki kotala lisusu likambo moko te kati na makambo oyo apesaki Jozefi mokumba ya kosala, pamba te Yawe azalaki elongo na ye mpe azalaki kolongisa ye na makambo nyonso oyo azalaki kosala.


Mokonzi ya bakengeli ya mokonzi apesaki bango na maboko ya Jozefi mpo ete alandela bango. Boye basalaki mikolo mwa mingi na boloko.


Mokolo moko, Faraon asilikelaki basali na ye mpe atiaki ngai na boloko elongo na kalaka oyo azalaki kotala makambo oyo etali mapa ya mokonzi kati na ndako ya mokonzi ya bakengeli ya mokonzi.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ