23 Kasi kalaka oyo azalaki kotala makambo oyo etali masanga ya mokonzi ya Ejipito atikalaki kokanisa lisusu Jozefi te : abosanaki ye.
Sima na mibu mibale, Faraon alotaki ndoto : atelemaki pembeni ya ebale Nili,
Kalaka oyo azalaki kotala makambo oyo etali masanga ya mokonzi alobaki na Faraon : « Na mokolo ya lelo, nalingi kokanisa mbeba na ngai.
Mokonzi atunaki : — Lokumu mpe lifuti nini Maridoshe azwaki mpo na yango ? Basali na ye bazongisaki : — Basala ata eloko moko te mpo na ye.
balingami na ngai balimwe, mpe baninga na ngai babosani ngai ;
kino makambo oyo Jozefi asakolaki ekokisamaki, kino Liloba na Yawe etalisaki ete Jozefi alobaki solo.
Banguna na ngai nyonso bakomi kozwa ngai lokola eloko ya lisuma, baninga na ngai bakomi kozwa ngai lokola eloko ya soni, mpe bato oyo bayebi ngai bakomi kozwa ngai lokola eloko ya somo.
Babosani ngai lokola moto oyo asila kokufa ; nakomi lokola mbeki oyo epanzana.
Bozali komela bakopo etonda na masanga ya vino mpe bozali kopakola mafuta ya talo na banzoto na bino, kasi kobebisama ya ndako ya Jozefi ezali kosala bino pasi na mitema te.