Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Ebandeli 40:1 - Mokanda na Bomoi

1 Sima na mwa tango, kalaka oyo azalaki kotala makambo oyo etali masanga ya mokonzi ya Ejipito mpe oyo azalaki kotala makambo oyo etali mapa ya mokonzi ya Ejipito, basalaki mabe liboso ya nkolo na bango, mokonzi ya Ejipito.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Ebandeli 40:1
10 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Kopo ya Faraon ezalaki na maboko na ngai. Nazwaki bambuma ya vino, nakamolaki yango na kopo ya Faraon mpe napesaki ye kopo yango na maboko na ye.


Sima na mikolo misato, Faraon akotombola moto na yo mpe akozongisa yo na esika na yo ya mosala. Okotia lisusu kopo ya Faraon na maboko na ye ndenge ozalaki kosala na kala.


Tango kalaka oyo azalaki kotala makambo oyo etali mapa ya mokonzi ya Ejipito asosolaki ete Jozefi apesaki ndimbola ya malamu, alobaki na Jozefi : — Ngai mpe nalotaki ndoto : « Bitunga misato ya mapa ezalaki likolo ya moto na ngai.


Faraon asilikelaki bakalaka na ye mibale ya lokumu : kalaka oyo azalaki kotala makambo oyo etali masanga mpe oyo azalaki kotala makambo oyo etali mapa.


Ezalaki mokolo moko na butu, bango mibale, kalaka oyo azalaki kotala makambo oyo etali masanga mpe oyo azalaki kotala makambo oyo etali mapa ya mokonzi ya Ejipito, balotaki moto na moto ndoto na ye mpe ndoto na ndoto ezalaki na ndimbola na yango.


Kalaka oyo azalaki kotala makambo oyo etali masanga ya mokonzi alobaki na Faraon : « Na mokolo ya lelo, nalingi kokanisa mbeba na ngai.


Oh Nkolo, nabondeli Yo, tika ete litoyi na Yo eyoka na bokebi libondeli ya mowumbu na Yo mpe libondeli ya bawumbu na Yo mosusu oyo bazali kosepela kopesa lokumu na Kombo na Yo ! Na mokolo ya lelo, longisa mowumbu na Yo mpe salela ye ngolu na miso ya moto oyo ! » Nzokande, na tango wana, nazalaki kalaka oyo azalaki kotala makambo oyo etali masanga ya mokonzi.


Na butu wana, lokola mokonzi akokaki kolala te, asengaki ete bamemela ye buku ya masolo, masolo ya bokonzi na ye, mpo ete batanga yango liboso na ye.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ