Adamu asangisaki lisusu nzoto na mwasi na ye, bongo mwasi na ye abotaki Seti, pamba te alobaki : « Nzambe apesi ngai mwana mosusu na esika ya Abele oyo Kayina abomaki. »
Ngai, mwasi mosali na yo, nazalaki na bana mibali mibale. Bango mibale baswanaki kati na bilanga, mpe moto moko te azalaki kuna mpo na kokabola bango. Moko abetaki mosusu mpe abomaki ye.
Tango Abineri azongaki lisusu na Ebron, Joabi abendaki ye na pembeni, na kati-kati ya ekuke ya engumba lokola nde alingi kosolola na ye na nkuku. Mpe kuna, mpo na kozongisa mabe na mabe na tina na makila ya ndeko na ye ya mobali Asaeli, Joabi atubaki Abineri mbeli na libumu, mpe Abineri akufaki.
Tango Yorami azwaki bokonzi ya tata na ye mpe alendaki na bokonzi yango, abomaki na mopanga bandeko na ye nyonso ya mibali elongo na ndambo ya bakambi ya Isalaele.
Pamba te mwana mobali azali koyokisa tata na ye soni, elenge mwasi azali kotelemela mama na ye, mwasi ya libala azali kotelemela mama-bokilo na ye ; bongo monguna ya moto, ezali kaka moto ya libota na ye.
mpo ete makila ya bato nyonso ya sembo, oyo basopa na mabele, etangama na mito na bino, kobanda na makila ya Abele, moto ya sembo, kino na makila ya Zakari, mwana mobali ya Barashi, oyo bobomaki kati ya Tempelo mpe etumbelo.
kobanda na makila ya Abele kino na makila ya Zakari oyo babomaki kati na etumbelo mpe Esika ya bule. Nazali koloba na bino penza ya solo : mokumba ya mabe wana nyonso ekokweyela bato ya ekeke oyo.
Mpo na kondima, Abele abonzelaki Nzambe mbeka ya malamu koleka oyo ya Kayina. Mpo na kondima, Nzambe atatolaki na tina na ye ete azali moto ya sembo, pamba te Nzambe andimaki makabo na ye. Mpo na kondima, Abele alobaka kino lelo atako asila kokufa.