Alobaki na bango : — Namoni ete ezaleli ya tata na bino epai na ngai etikali lisusu te ndenge ezalaki liboso ; kasi Nzambe ya tata na ngai azalaki elongo na ngai.
Namoni ete pasi nyonso oyo bato bamonaka na mosala mpe lokumu oyo bazwaka na misala na bango, ewutaka kaka na bilulela ya moto liboso ya moninga na ye. Wana mpe ezali pamba, ezali lokola moto azali kolanda mopepe.
Bilongi na bango ezali kofunda bango ; bazali kolakisa masumu na bango ndenge bato ya Sodome bazalaki kosala, bazali kobomba yango te. Mawa na bango, pamba te bamilukeli nde makambo !
Moyize asilikaki makasi mpe alobaki na Yawe : — Kondima makabo na bango te. Nazwaki ata eloko moko te epai na bango, ezala ane ; mpe nasalaki ata moto moko te mabe kati na bango.
Kasi tango Bayuda bamonaki ebele ya bato, batondaki na zuwa ; bakomaki koloba mabe na tina na makambo oyo Polo azalaki koloba, mpe bakomaki kofinga ye.
Mpo na kondima, Abele abonzelaki Nzambe mbeka ya malamu koleka oyo ya Kayina. Mpo na kondima, Nzambe atatolaki na tina na ye ete azali moto ya sembo, pamba te Nzambe andimaki makabo na ye. Mpo na kondima, Abele alobaka kino lelo atako asila kokufa.
Kasi Yawe alobaki na Samuele : — Kotala te lolenge ya nzoto na ye to molayi na ye, pamba te naponi ye te. Yawe atalaka te ndenge moto atalaka. Moto atalaka kaka oyo ebetaka na miso, kasi Yawe atalaka motema.