Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Ebandeli 4:26 - Mokanda na Bomoi

26 Seti mpe abotaki mwana mobali, apesaki ye kombo « Enoshi. » Ezalaki na tango wana nde bato bakomaki kobelela Kombo ya Yawe.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Ebandeli 4:26
17 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Longwa wana, akendeki na bangomba ya este ya Beteli. Atongaki ndako na ye ya kapo kati ya Beteli mpe Ayi, na esika oyo atongaki etumbelo mpo na Yawe mpe abelelaki Kombo ya Yawe. Beteli ezalaki na ngambo ya weste mpe Ayi, na ngambo ya este.


Kaka na esika yango, Izaki atongaki etumbelo, abelelaki Kombo ya Yawe, atongaki ndako na ye ya kapo. Basali na ye batimolaki libulu mosusu ya mayi.


Boye bokobelela kombo ya nzambe na bino, bongo ngai mpe nakobelela Kombo ya Yawe. Nzambe oyo akoyanola na nzela ya moto, Ye nde Nzambe ya solo. Boye bato nyonso bazongisaki : — Makambo oyo olobi ezali malamu.


Nakobonzela Yo mbeka mpo na kozongisa matondi, mpe nakobelela Kombo ya Yawe.


Moto moko akoloba : ‹ Nazali ya Yawe, › mpe moto mosusu akomibenga na kombo ya Jakobi, kino mosusu akokoma na loboko na ye : ‹ Nazali ya Yawe, › mpe akozwa kombo ya Isalaele.


Boyoka makambo oyo, oh ndako ya Jakobi, bino oyo bobengamaka na kombo ya Isalaele, bino oyo bobimi na libota ya Yuda, bino oyo bolapaka ndayi na Kombo na Yawe mpe bobelelaka Kombo ya Nzambe ya Isalaele, kasi na bosolo te mpe na bosembo te !


Wuta kala, tozalaka bato na Yo ; kasi tokomi lokola bato oyo okambaka lisusu te, lokola bato oyo babengami na Kombo na Yo te. Oh soki okokaki kopasola likolo mpe kokita, bangomba ekoningana liboso na Yo !


Na mikolo wana, Yuda ekobikisama, mpe Yelusalemi ekozala na kimia. Tala kombo oyo bakobengela yango : Yawe azali Bosembo na biso. ›


Boye nakopetola bibebu ya bato ya bikolo mpo ete bango nyonso bazala ya kokoka mpo na kobelela Kombo ya Yawe mpe kosalela Ye na motema mobimba.


Kenani, mwana mobali ya Enoshi ; Enoshi, mwana mobali ya Seti ; Seti, mwana mobali ya Adamu ; Adamu, mwana mobali ya Nzambe.


mpe tango amonaki ye, amemaki ye na Antioshe. Mobu mobimba, Barnabasi mpe Saulo basalaki elongo kati na Lingomba, mpe bateyaki bato ebele. Ezalaki na Antioshe nde bayekoli babengamaki, mpo na mbala ya liboso, Baklisto.


Boye, moto nyonso oyo akobelela Kombo ya Nkolo akobikisama. »


Solo, moto nyonso oyo akobelela Kombo ya Nkolo akobikisama.


Epai ya Lingomba ya Nzambe, oyo ezali kati na Kolinto ; mpe epai ya bato oyo Nzambe abulisa kati na Yesu-Klisto mpe abenga mpo ete bazala basantu, elongo na bato nyonso oyo, na bisika nyonso, babelelaka Kombo ya Nkolo na biso, Yesu-Klisto, Nkolo na bango mpe Nkolo na biso :


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ