25 Adamu asangisaki lisusu nzoto na mwasi na ye, bongo mwasi na ye abotaki Seti, pamba te alobaki : « Nzambe apesi ngai mwana mosusu na esika ya Abele oyo Kayina abomaki. »
Kayina alobaki na Abele, ndeko na ye. Wana bazalaki kati na bilanga, Kayina akangaki Abele, ndeko na ye, mpe abomaki ye.
Tango Seti akokisaki mibu nkama moko na mitano ya mbotama, abotaki Enoshi.
Adamu, Seti, Enoshi,
Kenani, mwana mobali ya Enoshi ; Enoshi, mwana mobali ya Seti ; Seti, mwana mobali ya Adamu ; Adamu, mwana mobali ya Nzambe.