Ezawu abalaki basi na ye kati na bana basi ya Kanana : Ada, mwana mwasi ya Eloni, moto ya Iti ; Olibama, mwana mwasi ya Ana mpe koko ya Tsibeoni, moto ya Evi ;
Kayina asangisaki nzoto na mwasi na ye ; mpe mwasi na ye akomaki na zemi, bongo abotaki Enoki. Kayina atongaki engumba. Apesaki yango kombo « Enoki, » kombo ya mwana na ye ya mobali.