Nakotombokela bino, mpe bokokweya liboso ya banguna na bino ; ba-oyo bayinaka bino bakokonza bino mpe bokokima ata soki moto moko te azali kolanda bino.
Bongo na mikili ya banguna na bino, bato oyo bakotikala na bomoi kati na bino, nakolembisa bango nzoto : bakokima ata makelele ya lokasa oyo mopepe eningisi, bakokima lokola nde bazali kokima liboso ya mopanga mpe bakobambana na mabele ata soki moto moko te azali kolanda bango.
Pamba te bikelamu nyonso ezali na se ya bokonzi ya nguya oyo esukaka na pamba ; na mokano na yango moko te, kasi na mokano ya Ye oyo atiaki bikelamu yango na se ya bokonzi yango, na elikya ete
Kasi soki botosi te Yawe, Nzambe na bino, mpe bosaleli te mitindo mpe bikateli na Ye, oyo nazali kopesa bino lelo, tala bilakeli mabe oyo ekokomela bino mpe ekokanga bino :