Boye Yawe Nzambe alobaki na nyoka : « Lokola osali bongo, olakelami mabe kati na bibwele mpe banyama nyonso ya zamba. Okotambola na libumu mpe okobanda kolia putulu bomoi na yo mobimba.
Tala, Yawe azali kobima wuta na esika na Ye mpo na kopesa bato ya mokili etumbu mpo na masumu na bango ; mabele ekobimisa makila oyo basopa likolo na yango, ekobomba lisusu te bato oyo baboma.
Pamba te bato nyonso oyo batiaka elikya na botosi na bango liboso ya Mobeko bazali na se ya elakeli mabe, kolanda ndenge ekomama : « Alakelama mabe, moto nyonso oyo akobaka te kotosa makambo nyonso oyo ekomama kati na buku ya Mobeko. »