Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Ebandeli 4:10 - Mokanda na Bomoi

10 Nzambe alobaki : — Osali nini ? Likambo nini penza osali ? Makila ya ndeko na yo ezali koganga wuta na mabele kino epai na Ngai.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Ebandeli 4:10
24 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Bongo Yawe alobaki : « Nayoki sango ete mabe ya bato ya Sodome mpe ya Gomore eleki ndelo, mpe masumu na bango eleki mingi penza.


Yawe Nzambe alobaki na mwasi : — Mpo nini osali bongo ? Mwasi azongisaki : — Ezali nyoka nde akosaki ngai, mpe naliaki yango.


Bongo lokola makila na bino ezali bomoi na bino, nakosambisa oyo nyonso akotangisa yango, ezala nyama to moto. Nakosambisa moto nyonso mpo na bomoi ya moninga na ye.


‹ Lobi, namonaki makila ya Naboti mpe ya bana na ye ya mibali, › elobi Yawe, mpe solo, nakofutisa yo yango na bilanga oyo, » elobi Yawe. Sik’oyo, kamata ye mpe bwaka ye na bilanga wana, kolanda Liloba na Yawe.


Kuna na Samari, ezalaki na mosakoli moko ya Yawe, kombo na ye « Odedi. » Abimaki liboso ya mampinga tango bazalaki kozonga na Samari mpe alobaki na bango : « Tala, na kanda makasi na Ye mpo na Yuda, Yawe, Nzambe ya batata na bino, akabi bango na maboko na bino, mpe bobomi bango na kanda oyo ekomi kino na likolo.


Oh mabele, kozipa makila na ngai te ! Kotika te ete koganga na ngai ezwa tango ya kopema !


Bileli ya kufa ezali koyokana wuta na mboka, mpe milimo ya bato oyo bazoki ezali koganga mpo na koluka lisungi, kasi Nzambe azali kopesa etumbu ata na moto moko te.


Yango nde makambo oyo ozalaki kosala ; mpe ngai nabatelaki kimia. Okanisi penza ete ngai nazali lokola yo ? Nakopamela yo mpe nakotanda makambo nyonso oyo nazwa yo na miso na yo.


akosikola bango na minyoko mpe na makambo na kanza, pamba te bomoi na bango ezali motuya na miso na ye.


Boyembela Yawe oyo avandaka kati na Siona banzembo ya masanzoli ; bopanza sango ya misala na Ye kati na bikolo.


Pamba te Yawe azongisaka mabe na mabe mpo na makila oyo esopani, akanisaka koganga ya banyokolami.


Yawe alobaki : — Namoni pasi ya bato na Ngai kuna na Ejipito ; nayoki koganga na bango mpo na misala makasi oyo bakonzi ya misala makasi bazali kopesa bango. Nayebi pasi na bango.


Nzokande, elanga ya vino ya Yawe, Mokonzi ya mampinga, ezali nde libota ya Isalaele, mpe bato ya Yuda bazali elanga oyo ezalaki kosepelisa Ye. Azalaki kozela bosembo, kasi amonaki nde makila ; makambo ya alima, kasi ayokaki nde kolela ya pasi.


Bokokomisa mbindo te mokili epai wapi bozali. Solo, kosopa makila ekomisaka mokili mbindo ; pamba te soki makila esopani na mokili, ezali kaka na nzela ya makila ya moto oyo asopi yango nde bakoki kokomisa lisusu mokili peto.


Boye, Petelo atunaki ye : — Ananiasi, ndenge nini Satana atondisi motema na yo mpo ete okosa Molimo Mosantu, mpe obomba ndambo ya mbongo oyo otekeli elanga na yo ?


Petelo alobaki na ye : — Mpo na nini boyokanaki mpo na komeka Molimo ya Nkolo ? Yoka, makolo ya bato oyo bawuti kokunda mobali na yo esili kokoma liboso ya ekuke ; yo mpe, bakomema yo.


Soki kati na mokili oyo Yawe, Nzambe na bino, akopesa bino mpo na kozwa, bakuti moto akufa alali na elanga, bongo moto oyo abomaki ye ayebani te,


Mpo na kondima, Abele abonzelaki Nzambe mbeka ya malamu koleka oyo ya Kayina. Mpo na kondima, Nzambe atatolaki na tina na ye ete azali moto ya sembo, pamba te Nzambe andimaki makabo na ye. Mpo na kondima, Abele alobaka kino lelo atako asila kokufa.


pene ya Yesu, Moyokanisi ya Boyokani ya sika ; mpe pene ya makila na Ye, oyo esopanaki mpe egangaka koleka makila ya Abele.


Bozali ata koboya kofuta basali bilanga na bino. Yoka ndenge bazali kolela ! Mpe kolela na bango ekomi kino na matoyi ya Nkolo, Mokonzi ya mampinga.


Jozue alobaki na Akana : — Mwana na ngai, pesa nkembo epai na Yawe, Nzambe ya Isalaele, mpe pesa Ye penza lokumu. Yebisa ngai likambo oyo osalaki, kobombela ngai eloko moko te.


Samuele atunaki ye : — Osali penza nini ? Saulo azongisaki : — Tango namonaki ete bato babandi kopalangana mosika na ngai, mpe ete yo oyei te na ngonga oyo ekatamaki, mpe ete bato ya Filisitia bazali kosangana na Mikimasi,


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ