Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Ebandeli 39:7 - Mokanda na Bomoi

7 Sima na yango, mwasi ya nkolo ya Jozefi alulaki ye Jozefi mpe alobaki na ye : — Yaka kosangisa na ngai nzoto !

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Ebandeli 39:7
19 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

milimo emonaki ete bana basi ya bato bazali kitoko ; boye ekomisaki ba-oyo eponaki basi na yango.


Tango kaka Tamari asembolaki loboko epai ya Aminoni mpo na koleisa ye galeti, Aminoni akangaki ye na nzoto mpe alobaki na ye : — Yaka kolala elongo na ngai, ndeko na ngai ya mwasi.


« Nasalaki boyokani elongo na miso na ngai ete nalula elenge mwasi te.


Longola miso na ngai na makambo ya pamba, batela bomoi na ngai kati na banzela na Yo !


Mwana na ngai ya mobali, soki bato ya masumu balingi kokweyisa yo, komitika te.


Bwanya ekobikisa yo lisusu liboso ya mwasi mopaya, liboso ya mwasi oyo atonda na maloba ya sukali,


noki te akoya kokaba lokumu na yo epai ya bato mosusu, mpe mibu na yo epai ya moto mabe ;


Pamba te likolo ya mwasi ya ndumba, okoki kobungisa ezala eteni na yo ya lipa, mpe mwasi ya libala akoki kobebisa bomoi ya motuya.


Mwasi yango ya ndumba asimbaki elenge mobali, ayambaki ye, alaliselaki ye miso mpe alobaki na ye :


Yango wana, mvula ekangamaki, mpe mvula ya sima enokaki lisusu te. Kasi atako bongo, okangami kaka na kosala kindumba na yo mpe oboyi koyoka soni.


otongaki yango na bisika nyonso oyo babalabala ekutana, okomisaki kitoko na yo likambo ya nkele mpe omipesaki epai ya moleki nzela nyonso : osalaki penza kindumba makasi.


Yo ozali penza mwasi ya ekobo ; osepelaka kosangisa nzoto na bapaya, kasi na mobali na yo te.


Yo, okeseni penza na basi mosusu na kindumba na yo, pamba te mibali balukaka yo te ! Yo penza, okeseni na basi mosusu ya ndumba, pamba te ofutaka mibali na esika ete bango bafuta yo.


Kasi Ngai, nalobi na bino : Mobali nyonso oyo atali mwasi na makanisi ya kolula ye, asili kosala na ye ekobo kati na motema na ye.


Miso na bango elembaka te kolula basi mpo na koluka kosala na bango ekobo, balembaka te kosala masumu, bakosaka bato oyo balendisama malamu te na kondima ; bazali na mitema etonda na lokoso : bazali na se ya bilakeli mabe ya Nzambe.


pamba te nyonso oyo ezali kati na mokili, lokola baposa mabe ya nzoto, posa makasi ya konduka biloko oyo miso ezali kolula, mpe lofundu mpo na biloko ; ewuti na Tata te, kasi ewuti na mokili.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ