Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Ebandeli 39:3 - Mokanda na Bomoi

3 Tango nkolo na ye asosolaki ete Yawe azali elongo na Jozefi, mpe ete Yawe azali kolongisa ye na makambo nyonso oyo azali kosala,

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Ebandeli 39:3
28 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Nzambe azalaki elongo na mwana. Akolaki, avandaki kati na esobe mpe akomaki mobomi nyama na tolotolo.


Kaka na tango yango, Abimeleki mpe Pikoli, mokonzi ya mampinga na ye, bakendeki kokutana na Abrayami ; mpe Abimeleki alobaki na Abrayami : — Nzambe azali kolongisa yo na makambo nyonso oyo ozali kosala.


Bongo sik’oyo, lapa ndayi awa na Kombo ya Nzambe ete okokosa ngai te, bana na ngai te, mpe bakoko na ngai te ; kasi okosalela ngai bolamu elongo na mboka oyo epai wapi ozali kovanda lokola mopaya, ndenge ngai nasaleli yo.


Na butu ya mokolo oyo Izaki akomaki na Beri-Sheba, Yawe abimelaki ye mpe alobaki na ye : « Nazali Nzambe ya Abrayami, tata na yo ; kobanga te, nazali elongo na yo. Mpo na Abrayami, mosali na Ngai, nakopambola yo mpe nakokomisa bakitani na yo ebele. »


Bazongiselaki ye : — Tomoni ya solo ete Yawe azali elongo na yo, yango wana tolobaki : « Tika ete tosala boyokani kati na biso mpe yo na nzela ya ndayi.


Kasi Labani alobaki na ye : — Soki nazwi ngolu na miso na yo, nabondeli yo, kokende te ; pamba te nasosoli na bosoloka ete Yawe apamboli ngai na nzela na yo.


Moke oyo ozalaki na yango, liboso ete ngai naya, ekomi ebele penza. Yawe apamboli yo na nzela na ngai. Kasi sik’oyo, nakosala tango nini mpo na libota na ngai moko ?


Yawe azalaki elongo na Jozefi ; boye Jozefi azalaki kolonga na makambo nyonso oyo azalaki kosala, mpe avandaki kati na ndako ya moto ya Ejipito, nkolo na ye.


Yawe azalaki elongo na Jozefi mpe atalisaki ye bolamu na Ye ; asalelaki ye ngolu na miso ya mokonzi ya boloko.


Mokonzi ya boloko azalaki kotala lisusu likambo moko te kati na makambo oyo apesaki Jozefi mokumba ya kosala, pamba te Yawe azalaki elongo na ye mpe azalaki kolongisa ye na makambo nyonso oyo azalaki kosala.


Yawe azalaki elongo na ye mpe azalaki kolonga na makambo nyonso oyo azalaki kosala. Atombokelaki mokonzi ya Asiri mpe aboyaki kosalela ye.


Boye, okolonga soki obateli malamu bikateli mpe mibeko oyo Yawe apesaki na Moyize mpo na Isalaele. Zala makasi mpe yika mpiko ! Kobanga te mpe kozonga sima te !


Pineasi, mwana mobali ya Eleazari, azalaki kala mokonzi na bango, bongo Yawe azalaki elongo na ye.


Salomo, mwana mobali ya Davidi, alendisamaki makasi na bokonzi na ye, pamba te Yawe, Nzambe na ye, azalaki elongo na ye mpe akomisaki ye moto monene penza.


Oziasi akangamaki na Nzambe mikolo nyonso ya bomoi ya Zakari, pamba te azalaki kolakisa ye kotosa Nzambe. Na tango nyonso oyo Oziasi awumelaki kokangama na Yawe, Nzambe azalaki kolongisa ye.


Nazongiselaki bango : — Nzambe ya Likolo akolongisa biso solo. Biso bawumbu na Ye, tokotelema mpe tokotonga. Kasi bino, bozali ata na eteni moko te ya mabele to na bokonzi moko te kati na Yelusalemi, mpe moto moko te akozala kuna na ekaniseli malamu mpo na bino !


Azali lokola nzete oyo balona pene ya mayi, oyo ebotaka mbuma na eleko na yango, mpe makasa na yango ekawukaka te ; misala na ye nyonso etambolaka malamu.


Tala liloba oyo Yawe, Mokonzi ya mampinga, alobi : « Na mikolo wana, bato zomi ya bikolo mpe ya nkota ya ndenge na ndenge bakokanga songe ya nzambala ya Moyuda moko mpe bakoloba : ‹ Tika ete tokende elongo na yo, pamba te toyoki ete Nzambe azali na bino elongo. › »


Yango wana, tika ete pole na bino engenga liboso ya bato, mpo ete bamona misala malamu na bino mpe bakumisa Tata na bino oyo azali kati na Likolo.


Tika ete moko na moko kati na bino, na mokolo ya liboso ya poso, abomba ndambo ya mbongo kati na ndako na ye, kolanda ezweli na ye, mpo ete bazela te kokoma na ngai mpo na kokongola makabo yango.


Yawe, Nzambe na bino, apamboli bino na misala nyonso ya maboko na bino. Abateli bino na esobe oyo ya monene mibu tuku minei. Yawe, Nzambe na bino, azali elongo na bino mpe bozangi eloko moko te. › »


Boni, nalobaki na yo te : Zala makasi mpe yika mpiko ? Kozala na somo te mpe kolemba nzoto te, pamba te Ngai Yawe, Nzambe na yo, nakozala elongo na yo na bisika nyonso oyo okokende. »


Tala makambo oyo nakosala bato ya ndako ya mayangani ya Satana, oyo balobaka ete bazali Bayuda, nzokande bazali na bango Bayuda te ; bazali nde bakosi. Nakosala ete baya kofukama na makolo na yo mpe bandima ete nalingaka yo.


Na nyonso oyo azalaki kosala, Davidi azalaki kolonga, pamba te Yawe azalaki elongo na ye.


Tango Saulo amonaki mpe asosolaki ete Yawe azali elongo na Davidi, mpe ete mwana na ye ya mwasi, Mikali, alingaka Davidi,


Wana Samuele azalaki kokola, Yawe azalaki elongo na ye mpe azalaki kokokisa maloba na Ye nyonso.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ