18 Kasi tango nagangaki makasi mpo na koluka lisalisi, asundolaki elamba na ye pembeni na ngai mpe akimaki libanda.
Bongo abetelaki ye lisolo : — Mowumbu Mo-Ebre oyo omemelaki biso, ayaki epai na ngai mpo na kosakana na ngai.
Tango nkolo ya Jozefi ayokaki lisolo oyo mwasi na ye abetelaki ye na maloba oyo : « Tala ndenge mowumbu na yo asali ngai, » Potifari asilikaki makasi.