Bongo, moto moko akimaki na bitumba mpe akendeki kopesa sango epai ya Abrami, Mo-Ebre oyo azalaki kovanda pene ya banzete minene ya Mamire, moto ya Amori, ndeko ya Eshikoli mpe ya Aneri. Bango nyonso misato basalaki lisanga na Abrami.
Boyoka ngai, bino bato oyo boyebi bosembo, bino bato oyo bozali na Mobeko na ngai kati na mitema na bino : Bobanga te lolenge bato bakotiola bino to bozala na somo ya mangungu na bango te.
Nzokande, ebundeli moko te oyo esalemi mpo na kosala yo mabe ekolonga ; mpe monoko nyonso oyo ekotelemela yo na kosambisa, okokatela yango etumbu. Yango nde ekozala libula ya basali ya Yawe, mpe elonga na bango kowuta epai na Ngai, elobi Yawe.
Nzokande bakonzi ya Banganga-Nzambe mpe bato nyonso ya Likita-Monene ya Bayuda bazalaki koluka litatoli moko oyo ekobimisa polele mabe ya Yesu mpo ete bakoka kokatela Ye etumbu ya kufa,
mpe kuna, bakomaki kofunda Ye : — Tala moto oyo azali kotia mobulu kati na ekolo na biso ! Tokuti ye azali kopekisa bato kofuta mpako ya Sezare, mpe azali lisusu komibenga Klisto, Mokonzi !
Kasi lokumu nini ezali ya komona pasi ya etumbu mpo na mabe oyo osali ? Nzokande, na miso ya Nzambe, komona pasi mpo na bolamu oyo osali ezali penza ngolu.