Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Ebandeli 39:12 - Mokanda na Bomoi

12 mwasi ya Potifari akangaki ye na bilamba mpe alobaki na ye : — Yaka kosangisa na ngai nzoto ! Kasi Jozefi asundolaki elamba na ye kati na maboko ya mwasi ya Potifari mpe akimaki libanda ya ndako.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Ebandeli 39:12
16 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Mokolo na mokolo, mwasi ya Potifari azalaki kaka kotungisa Jozefi, kasi ye mpe azalaki kaka koboya kosangisa na ye nzoto to kozala na ye elongo.


Mokolo moko, awa Jozefi akotaki na ndako mpo na kosala mosala na ye, mpe ata mosali moko te azalaki wana,


Tango mwasi ya Potifari amonaki ete Jozefi asundoli elamba na ye kati na maboko na ye mpe akimi libanda,


Kasi Jozefi aboyaki mpe alobaki na mwasi ya nkolo na ye : — Tala, nkolo na ngai atunaka ngai ata eloko moko te na oyo etali ndako na ye, mpe atika biloko na ye nyonso kati na maboko na ngai.


Tango kaka Tamari asembolaki loboko epai ya Aminoni mpo na koleisa ye galeti, Aminoni akangaki ye na nzoto mpe alobaki na ye : — Yaka kolala elongo na ngai, ndeko na ngai ya mwasi.


mwana na ngai ya mobali, kokende elongo na bango te, longola makolo na yo na nzela na bango ;


longola nzela na yo pembeni na ye mpe kopusana te liboso ya ndako na ye,


mikangola na motambo lokola mboloko na maboko ya mobomi banyama ya zamba, mpe lokola ndeke na motambo ya mokangi bandeke.


Namoni likambo oyo : mwasi oyo motema na ye ezali lokola motambo to monyama, oyo maboko na ye ezali lokola minyololo, azali mabe koleka kufa ; mobali oyo asepelisaka Nzambe akotikala kokangama te na motambo na ye, kaka mobali oyo asalaka masumu nde akokangama na motambo na ye.


Bomikosa te : « Baninga mabe babebisaka bizaleli ya malamu ! »


Kima baposa mabe ya bolenge mpe luka bosembo, kondima, bolingo mpe kimia elongo na bato oyo babelelaka Nkolo na motema ya peto.


Balingami na ngai, boyeba malamu ete bozali kati na mokili oyo lokola bapaya mpe baleki nzela ; yango wana nazali kosenga na bino ete boboyaka baposa mabe ya nzoto, pamba te ebundisaka molimo na bino.


Lokola Samuele abalukaki mpo na kokende, Saulo akangaki ye na songe ya kazaka na ye, mpe kazaka epasukaki.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ