Kasi Jozefi aboyaki mpe alobaki na mwasi ya nkolo na ye : — Tala, nkolo na ngai atunaka ngai ata eloko moko te na oyo etali ndako na ye, mpe atika biloko na ye nyonso kati na maboko na ngai.
Moto moko te aleki ngai na monene kati na ndako oyo. Nkolo na ngai apekisi ngai eloko moko te longola kaka yo, pamba te ozali mwasi na ye. Boye ndenge nini penza ngai nakoki kosala likambo ya mabe boye mpe kosala masumu liboso ya Nzambe ?
Yango wana, bokima pite. Masumu nyonso mosusu oyo moto akoki kosala ezali na libanda ya nzoto na ye, kasi ye oyo amipesi na kindumba asali masumu mpo na libebi ya nzoto na ye moko.
Yango wana nazali kopesa toli epai ya bilenge basi bakufisa mibali ete babala na bango lisusu, babota bana, bakamba bandako na bango malamu, mpo ete bapesa na banguna nzela te ya kotonga biso.
Balingami na ngai, boyeba malamu ete bozali kati na mokili oyo lokola bapaya mpe baleki nzela ; yango wana nazali kosenga na bino ete boboyaka baposa mabe ya nzoto, pamba te ebundisaka molimo na bino.