Bana mibali ya Yuda : Eri, Onani, Shela, Peretisi mpe Zera. Kasi Eri mpe Onani bakufaki na mokili ya Kanana. Bana mibali ya Peretsi : Etsironi mpe Amuli.
abelelaki Yawe na maloba oyo : — Oh Yawe, Nzambe na ngai, mpo na nini koyeisa lisusu pasi na bomoi ya mwasi oyo akufisa mobali, na koboma mwana na ye ya mobali ; nzokande ayambaki ngai epai na ye ?
Bana mibali ya Yuda : Eri, Onani mpe Shela. Ezali Mwana mwasi ya Shuwa, moto ya Kanana, nde abotelaki Yuda bana mibali misato wana. Eri, mwana mobali ya liboso ya Yuda, atambolaki mabe na miso ya Yawe, mpe Yawe abomaki ye.
Manase abonzaki na moto, lokola mbeka, bana na ye ya mibali, kati na Lubwaku ya Beni-Inomi ; asalelaki kindoki, soloka mpe maji ; atiaki na mosala bato oyo basololaka na milimo ya bakufi mpe bamoni makambo. Akobaki kosala makambo mabe na miso ya Yawe ; na bongo, apelisaki kanda na Ye.
Pamba te soki moto asali moninga na ye mabe, Nzambe akosambisa ye ; kasi soki moto asali lisumu epai na Yawe, nani akoloba mpo na ye ? » Kasi bana batikalaki koyokela tata na bango te, pamba te ezalaki mokano ya Yawe mpo na koboma bango.