6 Yuda abalelaki Eri, mwana na ye ya liboso, mwasi : Tamari.
Wana azalaki kovanda kati na esobe ya Parani, mama na ye azwelaki ye mwasi ya mokili ya Ejipito.
mpe lapa ndayi na Kombo na Yawe, Nzambe oyo asala likolo mpe mokili, ete okozwela te mwana na ngai ya mobali mwasi kati na bana basi ya Kanana, ba-oyo nazali kovanda kati na bango.
Abotaki mwana mobali mosusu mpe apesaki ye kombo « Shela. » Yuda azalaki na Kezibi tango mwasi na ye abotaki mwana ya misato.
Kasi Eri, mwana liboso ya Yuda, azalaki moto mabe na miso ya Yawe ; yango wana Yawe abomaki ye.
Yuda abotaki Peretsi mpe Zera na nzela ya Tamari, mwasi na ye ; Peretsi abotaki Etsironi ; Etsironi abotaki Arami ;