Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Ebandeli 38:5 - Mokanda na Bomoi

5 Abotaki mwana mobali mosusu mpe apesaki ye kombo « Shela. » Yuda azalaki na Kezibi tango mwasi na ye abotaki mwana ya misato.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Ebandeli 38:5
8 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Yuda alobaki na Tamari, bokilo na ye ya mwasi : « Lokola okufisi mibali, kende kovanda na ndako ya tata na yo kino Shela, mwana na ngai ya mobali, akokoma mokolo. » Pamba te azalaki komilobela : « Tango mosusu ye mpe akoki kokufa lokola bandeko na ye ya mibali. » Boye Tamari akendeki kovanda na ndako ya tata na ye.


Yuda asosolaki ete ezali biloko na ye mpe alobaki : — Azali sembo koleka ngai, pamba te nabalisaki ye te epai ya Shela, mwana na ngai ya mobali. Boye Yuda atikalaki lisusu te kosangisa na ye nzoto.


Yuda abalelaki Eri, mwana na ye ya liboso, mwasi : Tamari.


Bana mibali ya Yuda : Eri, Onani, Shela, Peretisi mpe Zera. Kasi Eri mpe Onani bakufaki na mokili ya Kanana. Bana mibali ya Peretsi : Etsironi mpe Amuli.


Bana mibali ya Yuda : Eri, Onani mpe Shela. Ezali Mwana mwasi ya Shuwa, moto ya Kanana, nde abotelaki Yuda bana mibali misato wana. Eri, mwana mobali ya liboso ya Yuda, atambolaki mabe na miso ya Yawe, mpe Yawe abomaki ye.


Bana mibali ya Shela, mwana mobali ya Yuda : Eri, tata ya Leka ; Laeda, tata ya Maresha ; mpe mabota ya basali bilamba ya lino, na Beti-Asheba.


Eri mpe Onani bazalaki bana mibali ya Yuda, kasi bakufaki na mokili ya Kanana.


Bakitani mosusu ya Yuda, kolanda mabota na bango, bazalaki : na nzela ya Shela, bakitani ya libota ya Shela ; na nzela ya Peretsi, bakitani ya libota ya Peretsi ; na nzela ya Zera, bakitani ya libota ya Zera.


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ