Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Ebandeli 38:29 - Mokanda na Bomoi

29 Kasi azongisaki loboko na ye, mpe ndeko na ye ya mobali abimaki. Bongo mwasi oyo abotisaka alobaki : « Ofungoli nzela nini mpo na kobima ? » Mpe bapesaki ye kombo « Peretsi. »

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Ebandeli 38:29
10 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Na tango ya kobota, moko kati na bango abimisaki loboko ; mpe mwasi oyo abotisaka asimbaki loboko yango, akangaki yango singa ya motane mpe alobaki : « Mwana oyo nde abimi liboso. »


Bana mibali ya Yuda : Eri, Onani, Shela, Peretisi mpe Zera. Kasi Eri mpe Onani bakufaki na mokili ya Kanana. Bana mibali ya Peretsi : Etsironi mpe Amuli.


Tamari, bokilo ya Yuda, abotelaki ye Peretsi mpe Zera. Bana mibali nyonso ya Yuda bazalaki mitano.


Utayi, mwana mobali ya Amiwudi, mwana mobali ya Omiri, mwana mobali ya Imiri, mwana mobali ya Bani, moko kati na bakitani ya Peretsi, mwana mobali ya Yuda.


mpe bato ya Yuda mpe ya Benjame bavandaki kati na Yelusalemi : Mpo na bakitani ya Yuda : Ataya, mwana mobali ya Oziasi, mwana mobali ya Zakari, mwana mobali ya Amaria, mwana mobali ya Shefatia, mwana mobali ya Maalalele, mokitani ya Peretsi ;


Bakitani nyonso ya Peretsi oyo bavandaki kati na Yelusalemi bazalaki mibali nkama minei na tuku motoba na mwambe.


Bakitani mosusu ya Yuda, kolanda mabota na bango, bazalaki : na nzela ya Shela, bakitani ya libota ya Shela ; na nzela ya Peretsi, bakitani ya libota ya Peretsi ; na nzela ya Zera, bakitani ya libota ya Zera.


Yuda abotaki Peretsi mpe Zera na nzela ya Tamari, mwasi na ye ; Peretsi abotaki Etsironi ; Etsironi abotaki Arami ;


Nashoni, mwana mobali ya Aminadabi ; Aminadabi, mwana mobali ya Adimini ; Adimini, mwana mobali ya Arini ; Arini, mwana mobali ya Etsironi ; Etsironi, mwana mobali ya Peretsi ; Peretsi, mwana mobali ya Yuda ;


Tika ete bakitani oyo Yawe akopesa yo na nzela ya elenge mwasi oyo, bakomisa ndako na yo lokola ndako ya Peretsi oyo Tamari abotelaki Yuda !


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ