Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Ebandeli 38:26 - Mokanda na Bomoi

26 Yuda asosolaki ete ezali biloko na ye mpe alobaki : — Azali sembo koleka ngai, pamba te nabalisaki ye te epai ya Shela, mwana na ngai ya mobali. Boye Yuda atikalaki lisusu te kosangisa na ye nzoto.

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Ebandeli 38:26
19 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Jakobi asosolaki ete ezali elamba ya Jozefi mpe agangaki : — Ezali elamba ya mwana na ngai ! Nyama moko ya mabe elie ye ! Solo, bakati-kati Jozefi na biteni !


alongolaki bilamba na ye ya mwasi akufisa mobali mpe amizipaki elongi na vwale mpo ete bayeba ye lisusu te. Avandaki na ekuke ya Enayimi oyo ezalaki na nzela ya Timina, pamba te amonaki ete Shela akolaki, kasi bapesaki ye te na libala epai ya Shela.


Adamu asangisaki nzoto na mwasi na ye Eva ; mpe Eva akomaki na zemi, bongo abotaki Kayina. Alobaki : « Nasali moto na lisungi ya Yawe. »


Boye basalelaki Abisalomi ndako ya kapo na likolo ya ndako, mpe asangisaki nzoto na bamakangu ya tata na ye na miso ya Isalaele mobimba.


Tango mokonzi Davidi azongaki na ndako na ye, na Yelusalemi, azwaki bamakangu na ye zomi oyo atikaki mpo na kokengela ndako, mpe atiaki bango kati na ndako moko oyo bazalaki kokengela malamu. Atako azalaki kosunga bango, kasi akendeki te kosangisa na bango nzoto. Bazalaki kokengela bango kino na mokolo na bango ya kufa, mpe bazalaki lokola basi bakufisa mibali.


Wana Davidi atombolaki miso mpe amonaki anjelu na Yawe koboma bato, alobaki na Yawe : « Ngai nde nasalaki masumu, ngai nde nasalaki mbeba ; bango, bato ya ekolo na ngai, basali mabe moko te ; boye, ebongi nde opesa ngai mpe libota na ngai etumbu ! »


Kasi awa sik’oyo pasi ekomeli yo, olembi na yo ! Awa pasi ebeti yo, okomi na yo koyoka somo !


Nalobaki mbala moko, kasi nakoyanola lisusu te ; na mbala ya mibale, nakobakisa lisusu eloko te. »


Sik’oyo, yo oyo ozalaki kosambisa bandeko na yo ya basi, lata soni na yo ! Lokola masumu na yo ezalaki kutu mabe koleka oyo ya bango, yango wana bazalaki komonana lokola bato ya sembo koleka. Yoka sik’oyo soni mpo ete osili kosambwa, omonisi bandeko na yo ya basi lokola bato ya sembo koleka !


Miso na Yo ezali peto koleka, okoki kotala mabe te. Mpo na nini ozali kotala makambo mabe ? Mpo na nini ozali kotala bato mabe na miso ? Mpo na nini ovandi kimia wana bato mabe bazali konyokola bato oyo baleki bango na bosembo ?


Bolakisa na nzela ya bizaleli ete bobongoli mitema.


Tango bayokaki bongo, bango nyonso babendanaki moko sima na moninga, kobanda na mikolo. Mpe Yesu atikalaki Ye moko. Lokola mwasi yango azalaki kaka wana kati na lopango ya Tempelo,


Butu ekomi pene ya kosila mpe tongo elingi kotana. Yango wana, tobwaka misala ya molili mpe tolata bibundeli ya pole.


Nzokande, toyebi malamu ete makambo nyonso oyo Mobeko elobaka, elobaka yango mpo na bato oyo bazali na se ya bokonzi ya Mobeko, mpo ete moto moko te amilongisa, mpe mpo ete moto nyonso asosola ete azali moto ya masumu liboso ya Nzambe.


Tango Davidi asilisaki koloba na Saulo, Saulo atunaki : — Oyo nazali koyoka ezali solo mongongo na yo Davidi, mwana na ngai ? Mpe Saulo alelaki makasi.


Alobaki na Davidi : — Ozali penza sembo koleka ngai, pamba te osaleli ngai bolamu, nzokande ngai nasalaki mabe epai na yo !


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ