Biblia Todo Logo
အွန်လိုင်း သမ္မာကျမ်းစာ

- ကြော်ငြာတွေ -




Ebandeli 38:24 - Mokanda na Bomoi

24 Sima na sanza misato, bayebisaki Yuda : — Tamari, bokilo na yo ya mwasi, asalaki kindumba, mpe tala kutu akomi na zemi. Yuda alobaki : — Babimisa ye mpe batumba ye na moto !

အခန်းကိုကြည့်ပါ။ ကော်ပီ




Ebandeli 38:24
32 ပူးပေါင်းရင်းမြစ်များ  

Kasi na butu, Nzambe ayaki epai ya Abimeleki kati na ndoto mpe alobaki na ye : « Okokufa mpo na mwasi oyo osili kozwa, pamba te azali mwasi ya libala. »


Sik’oyo, zongisa mwasi yango epai ya mobali na ye mpo ete azali mosakoli. Akobondela mpo na yo mpe okokufa te. Soki ozongisi ye te, yeba ete okokufa, yo mpe bato na yo nyonso.


Abimeleki abengaki Abrayami mpe alobaki na ye : — Likambo nini osali biso, lisumu nini nasali yo mpo ete omemisa ngai mpe mokili na ngai ngambo ya monene boye ? Osali ngai makambo oyo ekoki kosalema te.


Bango bazongisaki : — Boni, esengelaki bazwa ndeko na biso lokola mwasi ya ndumba ?


Yuda alobaki : — Atikala na biloko oyo azwaki, noki te tokobima babolole. Ngai nazali na likambo te ; natindeli ye mwana ntaba, mpe yo omoni ye te.


Davidi asilikelaki mozwi makasi mpe alobaki na Natan : — Na Kombo na Yawe, moto oyo asali boye asengeli na kufa !


Natan alobaki na Davidi : — Moto yango ezali nde yo ! Tala makambo oyo Yawe, Nzambe ya Isalaele, alobi : « Napakolaki yo mafuta mpo ete okoma mokonzi ya Isalaele mpe nakangolaki yo na maboko ya Saulo ;


Namoni likambo oyo : mwasi oyo motema na ye ezali lokola motambo to monyama, oyo maboko na ye ezali lokola minyololo, azali mabe koleka kufa ; mobali oyo asepelisaka Nzambe akotikala kokangama te na motambo na ye, kaka mobali oyo asalaka masumu nde akokangama na motambo na ye.


« Wuta kala, ozalaki kobuka ekangiseli na yo mpe kokata minyololo na yo. Ozalaki koloba : ‹ Nakozala lisusu mowumbu na yo te. › Yango wana, okomaki komilalisa na bangomba nyonso ya milayi mpe na se ya banzete nyonso ya mibesu lokola mwasi ya ndumba.


« Soki mobali abomi libala na mwasi na ye, mpe mwasi yango akei kobala mobali mosusu ; boni, mobali yango akoki lisusu kozongela ye ? Bomoni te ete mokili mobimba ekokoma penza mbindo ? Nzokande yo, osalaki kindumba na mibali ebele, bongo olingi sik’oyo kozongela Ngai, » elobi Yawe.


Tango Joziasi azalaki mokonzi, Yawe alobaki na ngai : « Omoni makambo Isalaele oyo apengwi nzela na Ngai azali kosala ? Amataki likolo ya bangomba nyonso mpe atambolaki na se ya banzete nyonso ya mibesu mpo na kosala kindumba.


Napesaki mopengwi Isalaele mokanda na ye ya koboma libala mpe nabenganaki ye likolo ya kindumba na ye ; kasi namonaki ete ndeko na ye ya mwasi, mopengwi Yuda, abangaki te ; ye mpe abimaki mpo na kosala kindumba.


Kasi okomaki kotia motema na kitoko na yo mpe kosalela lokumu na yo mpo na kosala kindumba. Olakisaki bolumbu na yo na moleki nzela nyonso mpe omipesaki na ye.


otongaki yango na bisika nyonso oyo babalabala ekutana, okomisaki kitoko na yo likambo ya nkele mpe omipesaki epai ya moleki nzela nyonso : osalaki penza kindumba makasi.


Osalaki kindumba na bato ya Ejipito, baninga na yo, oyo bazali na banzoto ya bingambe ; mpe osalaki kindumba makasi mpo na kopesa Ngai kanda.


Lokola otondaka te, osalaki lisusu kindumba na bato ya Asiri ; mpe, ata sima na yango, otondaki mpe kaka te.


Bakotumba bandako na yo mpe bakopesa yo etumbu na miso ya basi ebele. Nakosukisa kindumba na yo, mpe okofuta lisusu bamakangu na yo te.


Nzokande, azalaki se kobakisa kindumba na ye tango azalaki kokanisa mikolo ya bolenge na ye, oyo azalaki kosala kindumba, na Ejipito.


Mpe basangisaki na ye nzoto : ndenge mibali basangisaka nzoto na mwasi ya ndumba, ndenge wana mpe basalaki bango, Ohola mpe Oholiba.


Ohola amipesaki na kindumba tango azalaki nanu ya Ngai mpe akufelaki kolinga bamakangu na ye, bato ya Asiri, bilombe ya bitumba


Soki te, nakolongola ye bilamba mpe nakotika ye bolumbu ndenge babotela ye, nakokomisa ye lokola esobe, lokola mokili oyo ekawuka ; mpe akokufa na posa ya mayi.


Bongo nalobaki na ye : — Wumela na ngai tango molayi ; okosala kindumba te mpe okomipesa na mobali mosusu te, ngai mpe nakosala kaka bongo epai na yo.


Ata soki yo, Isalaele, osali ekobo, tika ete Yuda amikweyisa te ! Kokende na Giligali te, komata na Beti-Aveni te mpe kolapa ndayi te na koloba : « Na Kombo na Yawe ! »


Soki mobali asali ekobo na mwasi ya mobali mosusu, mwasi ya moninga na ye ; bango mibale, mwasi na mobali oyo basali ekobo, esengeli koboma bango.


Mwana mwasi ya Nganga-Nzambe oyo abebisi lokumu na ye na kosala kindumba asambwisi nde tata na ye ; boye esengeli kotumba ye ya bomoi na moto.


Boye, batela mpo na yo moko liboso ya Nzambe, kondima oyo ozali na yango. Esengo na moto oyo amikweyisaka te na nzela ya makambo oyo andimaka !


Bakoboma batata te mpo na bana na bango to mpe bakoboma bana te mpo na batata na bango ; bakoboma moto na moto mpo na masumu na ye moko.


Kasi makangu yango atambolaki na ekobo liboso na ye, alongwaki na libala mpe azongaki na ndako ya tata na ye, na Beteleemi kati na Yuda. Sima na basanza minei wuta azongaki na ndako ya tata na ye,


ကြှနျုပျတို့နောကျလိုကျပါ:

ကြော်ငြာတွေ


ကြော်ငြာတွေ