21 Boye atunaki epai ya bavandi ya esika wana, na Enayimi : — Wapi mwasi ya ndumba oyo azalaki na nzela, na Enayimi ? Bazongiselaki ye : — Esika oyo etikala kozala na mwasi ya ndumba te.
Boye Yuda atindaki moninga na ye Ira, moto ya Adulami, mpo ete amemela mwasi yango mwana ntaba mpe azwa ndanga oyo asimbisaki ye. Kasi Ira amonaki ye te.
Ira azongaki epai ya Yuda mpe ayebisaki ye : — Namoni ye te ; kutu bavandi ya Enayimi bayebisi ngai ete mwasi ya ndumba atikala kozala na esika wana te.